Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Matai 6:9, 10) Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ezali kosala nini? Mpe mpo na nini tosengeli kobondela mpo na yango?

Yesu azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe.

Luka 1:31-33: “Okopesa ye nkombo Yesu. Ye akozala moto monene mpe akobengama Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló; mpe Yehova Nzambe akopesa ye kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye, mpe akoyangela ndako ya Yakobo libela na libela, mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.”

Yesu azalaki koteya libosoliboso Bokonzi.

Matai 9:35: “Yesu azalaki kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka, azalaki koteya na basinagoga na bango, kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.”

Yesu apesaki bayekoli na ye elembo oyo ekosalisa bango báyeba ete etikali moke Bokonzi eya.

Matai 24:7: “Mpo ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge.”

Lelo bayekoli ya Yesu bazali kosakola nsango ya Bokonzi na mabele mobimba.

Matai 24:14: “Mpe nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”