Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Matomba ya kopesa mbote

Matomba ya kopesa mbote

“MBOTE! Ozali malamu?”

Na ntembe te, mbala mingi yo mpe opesaka bato mbote ndenge wana. Mbala mosusu kutu opesaka yango nzela moko na mbote ya lobɔkɔ. Bato na bato bazali na ndenge na bango ya kopesa mbote, kasi ata soki mimeseno ekeseni, nyonso ezali na mokano kaka moko. Na yango, koboya kopesa mbote to koboya koyanola na mbote ya moto ekoki komonisa kozanga bolingo to kozanga bonkonde.

Kasi moto nyonso te nde azalaka na momeseno ya kopesa basusu mbote. Bato mosusu bakakatanaka kopesa mbote mpo bayokaka nsɔni, to mpe bamonaka ete bato basepelaka na bango te. Basusu mpe bakakatanaka kopesa mbote na bato ya loposo mpe mimeseno mosusu, to batalelaka soki moto yango azali mozwi to mobola, atángá mingi to te. Kasi, kopesa moto mbote ata ya mokuse ekoki kobimisa matomba.

Omituna boye: ‘Mbote ekoki kosala nini? Mpe Liloba ya Nzambe eteyi ngai nini mpo na likambo ya kopesa bato mbote?’

PESÁKÁ “BATO YA NDENGE NYONSO” MBOTE

Ntango ntoma Petro ayambaki Korneyi moto ya ekólo mosusu, na lisangá ya bokristo, alobaki ete: “Nzambe aponaka bilongi te.” (Misala 10:34) Mwa moke na nsima, Petro akomaki ete Nzambe “alingi nde bato nyonso bábongola motema.” (2 Petro 3:9) Na ebandeli tokoki kosalela bavɛrsɛ yango na moto oyo azali koyekola solo. Kasi, Petro alendisaki lisusu bakristo na maloba oyo: “Bókumisa bato ya ndenge nyonso, bólinga lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Petro 2:17) Na yango ekozala malamu kopesa mbote na bato ya loposo mpe mimeseno mosusu nyonso, ata soki bazali bazwi to babola, batángá mingi to te. Yango ekomonisa ete tozali kokumisa mpe kolinga bango.

Ntoma Paulo alendisaki bandeko ya lisangá na maloba oyo: “Bóyambanaka ndenge Kristo mpe ayambaki biso.” (Baroma 15:7) Paulo atyelaki bandeko oyo basalisaki ye likebi. Lelo oyo, bandeko na biso bazali mpenza na mposa ya lisalisi makasi mpo Satana akómi lisusu na nkanda makasi mpo na basaleli ya Nzambe.​—Bakolose 4:11; Emoniseli 12:12, 17.

Bandakisa ya Biblia emonisi ete kopesa mbote ekoki ata kosala ete moto amiyoka lisusu ete bayambi ye malamu.

EKITISAKA MOTEMA, ELENDISAKA MPE EMONISAKA BOLINGO

Ntango esɛngaki ete Yehova atya bomoi ya Mwana na ye na libumu ya Maria, atindaki anzelu asolola na Maria, mpe anzelu abandaki na maloba oyo: “Mbote, moto oyo Nzambe amoniseli boboto mingi, Yehova azali na yo.” Yango ‘ebulunganisaki Maria mingi’ mpe amitunaki ntina oyo anzelu azalaki kosolola na ye. Ntango anzelu amonaki bongo, alobaki na ye: “Kobanga te mpo Nzambe amoniseli yo boboto.” Alimbolelaki ye ete Nzambe alingi ete Masiya abotama na nzela na ye. Na esika ete akoba kaka komitungisa, na botosi nyonso ayanolaki ete: “Talá! Nazali moombo ya Yehova! Tiká ekómela ngai ndenge olobi.”​—Luka 1:26-38.

Ezalaki mpenza libaku malamu mpo na anzelu komema nsango ya Yehova, kasi amonaki te ete ezali na ntina te asolola na moto ya kozanga kokoka. Abandaki na kopesa mbote. Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Tosengeli kokakatanaka te kopesa basusu mbote mpe kolendisa bango. Kaka na mwa maloba, tokoki kosalisa basusu mpe kokitisa bango motema bámona ete bazali mpenza na kati ya libota ya Yehova.

Paulo ayebaki bato ebele na masangá ya Azia moke mpe na Mpoto. Mikanda na ye ezalaki na bambote ya sikisiki. Tozali kokuta yango na Baroma mokapo 16. Paulo atindelaki bakristo ebele bambote. Abengaki Foebe, “ndeko na biso ya mwasi,” mpe na nsima asɛngaki bandeko ‘báyamba ye na kati ya Nkolo na ndenge oyo ebongi na basantu, mpe mpo básalisa ye na likambo nyonso oyo akozala na mposa ya lisalisi na bango.’ Paulo apesaki Priska ná Akila mbote, mpe abakisaki ete “kaka ngai moko te kasi mpe masangá nyonso ya bikólo mosusu tozali kotɔnda bango.” Apesaki mbote na bato mosusu oyo toyebi bango mpenza te, na ndakisa alobaki “ndeko na ngai ya bolingo, Epenete” mpe “Trifene ná Trifoze, basi oyo bazali kosala mosala makasi na kati ya Nkolo.” Ya solo Paulo akakatanaki te kopesa bandeko mbote.​—Baroma 16:1-16.

Kanisá esengo oyo bandeko bazalaki na yango ya koyeba ete bazalaki kokanisa bango mpenza. Na ntembe te, balingaki lisusu Paulo makasi mpe bango na bango balinganaki! Koyoka bambote yango elendisaki bakristo mosusu mpe esalaki ete kondima na bango ekóma makasi. Ya solo, kopesa mbote oyo ezali komonisa ete tozali kotyela moto likebi, mpe kopesa ye longonya ekómisaka boninga makasi mpe esangisaka basaleli ya sembo ya Nzambe.

Ntango Paulo akómaki na libongo ya Puteoli mpe akendaki na Roma, bandeko oyo bautaki na Sudi bayaki kokutana na ye. Ntango Paulo amonaki bango na mosika, “apesaki Nzambe matɔndi mpe azwaki mpiko.” (Misala 28:13-15) Na bantango mosusu, tokoki kaka komungamunga to kopɛpa lobɔkɔ mpo na kopesa mbote. Ata yango ekoki kosalisa moto, mbala mosusu moto oyo azali kotungisama na makanisi to azali mawamawa.

KOPESA MBOTE EZALI LIKAMBO YA MOTO NYONSO

Esɛngaki ete moyekoli Yakobo apesa bakristo mosusu toli ya makasi. Bakristo yango mosusu bakómaki kosala ekobo na ndenge basalaki boninga na mokili. (Yakobo 4:4) Kasi, talá ndenge Yakobo abandaki mokanda na ye:

“Yakobo, moombo ya Nzambe mpe ya Nkolo Yesu Kristo, epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangani epai na epai: Mbote!” (Yakobo 1:1) Batángi bakakatanaki te kondima toli na ye, mpo na mbote na ye bamonaki ete bango nyonso bazali ndenge moko na miso ya Nzambe. Kaka mwa mbote ekoki kopesa nzela na masolo ya ntina mingi mpenza.

Mpo mbote na biso ezala ya solo, ata ezali mokuse, esengeli kouta na motema mpe komonisa bolingo. Ebongi ezala ndenge wana, ata soki bato bamoni ntina na yango te. (Matai 22:39) Ndeko mwasi moko na Irlande, ayaki na Ndako ya Bokonzi mwa moke liboso makita ebanda. Lokola azalaki kokɔta nokinoki, ndeko mobali moko atalaki ye, asɛkaki mwa moke mpe alobaki na ye “mbote, nasepeli komona yo.” Ndeko yango ya mwasi akendaki kofanda.

Mwa bapɔsɔ na nsima, akendaki epai ya ndeko mobali yango mpe ayebisaki ye ete akutanaki na likambo moko na ndako oyo etungisaki ye. Alobaki boye: “Na mpokwa wana nazalaki na nkanda, yango wana nalingaki kutu koya te na Ndako ya Bokonzi. Nakoki kobosana makambo mosusu oyo elobamaki na makita, kasi mbote na yo te. Namiyokaki malamu mpenza. Matɔndi mingi.”

Ndeko mobali wana ayebaki te likambo oyo mbote na ye ekokaki kosala epai ya ndeko mwasi yango. Alobi boye: “Ntango ayebisaki ngai ndenge mwa maloba yango esalaki ye, nasepelaki mpenza na milende nasalaki. Ngai mpe namiyokaki malamu.”

Salomo akomaki ete: “Bwaká limpa na yo na mai, mpo nsima ya mikolo mingi okozwa yango lisusu.” (Mosakoli 11:1) Soki toyebi matomba ya kopesa bato mbote, mingimingi bandeko na biso bakristo, tokolendisa bango mpe yango ekolendisa biso. Na yango, tókanisa te ete mbote ebimisaka matomba te.