Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOTYA KIMYA NA NDAKO

Ndenge ya kosilisa matata na ndako

Ndenge ya kosilisa matata na ndako

OKOSALA nini soki matata ezali ntango nyonso na libota na bino? Mbala mosusu kowelana yango ekómi makasi mpe ezali kosalema mingi. Ekoki kozala ete oyebi te ndenge matata yango ebandaka. Ata bongo, bolinganaka mpe bolingi te kosalana mabe.

Ezali na ntina koyeba ete kozala na makanisi ekeseni elingi koloba te ete libota na bino ezali kokabwana. Ndenge bozali kosala mpo na kosilisa matata nde ekomonisa soki bolingi kimya ezala na ndako na bino to te, kasi matata yango moko te. Tótalela mwa makambo oyo ekoki kosalisa mpo na kosilisa matata.

1. KOBOYA KOZONGISA MABE NA MABE.

Koswana ebandaka na bato mibale, kasi soki moko abandi koyoka na esika ya koloba, matata ekoki kosila. Na yango, boyá kozongisa mabe ntango basilikisi yo. Zalá na komipekisa mpo na kopesa nzoto kilo. Kobosana te ete kimya na libota ezali na ntina mingi koleka komona ete yo nde olongi na matata yango.

“Esika nkoni ezali te mɔtɔ ekufaka, mpe esika moto oyo akoselaka bato makambo azali te kowelana esilaka.”​Masese 26:20.

2. MITYÁ NA ESIKA YA BATO YA LIBOTA NA YO.

Koyoka na likebi kozanga kokata moto maloba to kokanisela ye mabe ekoki kokitisa nkanda mpe kozongisa kimya. Na esika ya kozwela moto makanisi mabe, mityá na esika na ye. Ekoki kozala asali yo likambo yango mpo na kozanga kokoka, kasi te mpo na motema mabe. Kozanga kokanisa to mpasi na motema nde ekoki kotinda ye abimisa maloba mabe kasi te mpo alingi kozongisa mabe na mabe.

“Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.”​Bakolose 3:12.

3. KOTIKA MWA NTANGO ELEKA MPO NKANDA EKITA.

Soki osilikaka noki, ekozala malamu osɛnga bolimbisi na limemya mpe olongwa wana mpo na mwa ntango mpo nkanda ekita. Ntango mosusu, okoki kokende ata na shambrɛ mosusu to kokende kotambola tii ntango motema ekokita. Yango elingi koloba te ete oboyi koyokana na moto yango to okimi nde matata, ezali mpe te koboya kolobisa moto. Kasi, mbala mosusu ezali ntango ebongi kobondela Nzambe apesa yo motema molai, bososoli mpe mayele.

“Liboso koswana ebima, bendá nzoto.”​Masese 17:14.

4. KOTALELA MALAMU NINI ESENGELI KOLOBA MPE NDENGE YA KOLOBA YANGO.

Makambo ekobonga te soki oluki kopesa eyano oyo ekozokisa ndeko na yo na motema. Kutu, luká nde koloba likambo moko oyo ekokitisa ye motema. Na esika ondimisa ye na makasi amiyoka ndenge motema na yo elingi, na komikitisa nyonso sɛngá ye alimbola likambo yango polele mpe pesá ye mersi mpo na lisalisi nyonso oyo apesi.

“Moto mosusu alobaka kozanga kokanisa lokola nde azali kozokisa na mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya nde nkisi oyo ebikisaka.”​Masese 12:18.

5. KOMATISA MONGONGO TE MPE LOBÁ NA NDENGE YA KOSILISA MATATA.

Soki ndeko moko ya libota azali motema mokuse ekoki kopesa moto mosusu nkanda. Ata soki omoni ete basilikisi yo, boyá maloba ya kotyola to kofinga to mpe komatisa mongongo. Koloba te maloba lokola “okipaka ngai te” to “yo nde oyokaka te.” Kutu, yebisá molongani na yo na kimya nyonso ete likambo moko asalaki, esalaki yo mpasi (“esalaka ngai mpasi soki . . .”). Ebongi te kotindika, kobɛta mbata, konyata, to kosala eloko mosusu nyonso ya mabe. Ebongi mpe te kobamba bankombo, kotyola to kokanela.

“Makambo nyonso ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga elongwa mosika na bino, ná mabe nyonso.”​Baefese 4:31.

6. KOZELA TE MPO NA KOSƐNGA BOLIMBISI MPE MONISÁ OYO OKOSALA MPO NA KOBONGISA MAKAMBO.

Kotika te makanisi mabe etinda yo obosana mokano na yo ya libosoliboso ya kotya kimya. Yebá ete soki obundi na moto moko, foti ezali ya bino mibale. Soki oluki kimya, bino mibale bolongi. Na yango, salá oyo okoki kosala mpo kimya ezala. Ata soki omoni ete osali mabe moko te, okoki kaka kosɛnga bolimbisi ndenge osilikaki, ndenge osalaki, to mpe ndenge osilikisaki ye kozanga kokana. Koyokana malamu ezali na ntina mingi koleka lolendo to kolonga. Soki moto asɛngi yo bolimbisi, limbisá e.

“Kende komikitisa mpe tyá moninga na yo mbamba.”​Masese 6:3.

Soki matata esili, nini okoki kosala mpo kimya ezala na libota? Yango nde tokolobela na lisolo oyo elandi.