Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

 Sɛkɛlɛ mpo na libota ya esengo

Ndenge ya kosilisa matata

Ndenge ya kosilisa matata

Mobali alobi boye: “Nsima ya kobalana, ngai ná Sara * tozalaki kofanda na ndako ya baboti na ngai. Mokolo moko, makango ya leki na ngai ya mobali asɛngaki ngai nakende kotika ye epai na bango na motuka na biso. Nandimaki mpe nakendaki elongo na mwana na biso ya moke ya mobali kotika ye. Kasi, ntango nazongaki na ndako, Sara asilikaki makasi. Tobandaki koswana liboso ya baboti mpe bandeko na ngai mpe afingaki ngai ndumba ya mobali. Nakokaki lisusu kokanga motema te mpe nabandaki kosanzela ye maloba oyo esilikisaki ye lisusu koleka.”

Mwasi alobi boye: “Mwana na biso abɛlaka, mpe ntango tozwanaki matata wana, tozalaki na mbongo te. Yango wana, ntango Fernando akendeki na makango ya ndeko na ye ná mwana na biso, natikalaki kokanisa mingi. Ntango azongaki na ndako, namonisaki ye ete nasiliki. Toswanaki makasi mpe tokómaki kofingana mabemabe. Nsima ya koswana, natungisamaki mingi na motema.”

SOKI mwasi ná mobali baswani, yango emonisaka ete bolingo esili? Te! Fernando ná Sara, oyo tolobeli awa balinganaka mingi. Kasi, ata na mabala ya malamu, mikakatano ezangaka te.

Mpo na nini mikakatano ebimaka, mpe nini okoki kosala mpo mikakatano yango ebebisa libala na yo te? Lokola libala ezali ebongiseli ya Nzambe, ekozala malamu tótalela oyo Liloba na ye, Biblia, ezali koloba mpo na kosilisa mikakatano na libala.​—Genese 2:21, 22; 2 Timote 3:16, 17.

Luká koyeba epai mikakatano euti

Basi mingi ná mibali na bango bazalaka na mposa ya komoniselana bolingo mpe boboto. Nzokande, Biblia emonisi mpenza ete “bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Yango wana, soki mikakatano ebimi, ekoki kozala mpasi mpo na komipekisa. Mpe soki koswana ebimi, ezalaka mpasi mpo na bato mosusu komipekisa mimeseno mabe lokola koganga mpe kofinga. (Baloma 7:21; Baefese 4:31) Makambo nini mosusu ekoki komatisa nkanda?

Mbala mingi, mwasi ná mobali balobaka ndenge moko te soki likambo ebimi. Michiko alobi boye: “Ntango tobalanaki sika, namonaki ete biso mibale tolobaka ndenge moko te soki likambo ebimi. Ngai nalingaka kolobela kaka te likambo oyo ebimi kasi nalukaka mpe kolobela ntina mpe ndenge oyo likambo yango ebimi. Mobali na ngai alingaka kaka koyeba ndenge likambo yango ekosuka.”

Bato mingi bazali mpe kokutana na likambo oyo Michiko akutanaki na yango. Na mabala mingi, ekoki kozala ete moko alingaka kolandela likambo mokomoko soki matata ebimi, nzokande mosusu alingaka kobendana te mpe alingaka kutu te bálobela likambo oyo ebimi. Mwasi to mobali akoki kolinga kaka bálobela likambo yango mpe oyo mosusu akoki kobanda kosala nyonso bálobela yango te. Omoni ete momeseno wana ebandi kozwa esika na libala  na bino? Moko na bino alingaka kolandela mpenza likambo oyo ebimi mpe mosusu aboyaka kobenda mindondo?

Ndenge oyo moto akolá ekoki mpe kosala ete soki abali ayeba kosololaka malamu to te. Justin, oyo abalá esili koleka mbula mitano alobi boye: “Na libota na biso tómesanaki koloba mingi te, yango wana ezalaka mpasi mpo nabimisa makanisi na ngai polelepolele. Yango epesaka mwasi na ngai nkanda. Na libota na bango, balobaka polelepolele, yango wana azalaka na mokakatano te ya koyebisa ngai ndenge azali koyoka.”

Mpo na nini kosala makasi mpo na kosilisa mikakatano?

Bato oyo bayekolaka makambo etali libala bámoni ete ezali te kaka koloba na molongani na yo ete olingaka ye nde ekosala ete libala na bino ezala malamu. Ata soki mwasi ná mobali bazali koyokana malamu na likambo ya kosangisa nzoto to bazali na mbongo mingi, yango te nde ebongisaka libala. Nzokande, likambo oyo ekoki kosala ete libala ezala malamu ezali nde milende oyo mwasi ná mobali bazali kosala mpo na kosilisa mikakatano oyo ebimi.

Lisusu, Yesu alobaki ete soki bato babalani, Nzambe nde asangisaka bango, kasi moto te. (Matai 19:4-6) Yango wana, libala ya malamu ekumisaka Nzambe. Epai mosusu, soki mobali azali kolinga mpe kokumisa mwasi na ye te, Yehova Nzambe akoboya koyoka mabondeli na ye. (1 Petelo 3:7) Soki mwasi azali kotosa mobali na ye te, azali nde kozanga botosi epai ya Yehova, oyo atyá mobali mokonzi ya libota.​—1 Bakolinti 11:3.

Sɛkɛlɛ mpo na kolonga​—Boyá maloba mabe

Ata soki olobaka ndenge nini to outá na libota nini, soki olingi kotosa mitinda ya Biblia mpe kosilisaka mpenza mikakatano, ezali na maloba ya mabe oyo osengeli koboya. Omituna mituna oyo:

‘Naboyaka kozongisa mabe?’

Lisese moko ya Biblia elobi boye: “Kobeta miliki epesaka manteka; kotuta zolo ebimisaka makila; pe kosilika ememaka koswana.” (Masese 30:33, Bible na lingala ya lelo oyo) Yango elingi koloba nini? Tótalela ndakisa oyo: Mwa bokeseni ya makanisi oyo mwasi ná mobali bakoki kozala na yango mpo na ndenge ya kosalela mbongo ekoki kobongwana mbala moko koswana soki bakómi kobimisa maloba mabe lokola “oyebaka na yo eloko te, motó na yo esalaka malamu te.” Ya solo, soki molongani na yo ‘atuti zolo na yo,’ elingi koloba alobeli ezaleli na yo moko ya mabe, yo mpe okoki koyoka mposa ya kozongisela ye. Kasi, kozongisa mabe na mabe ekobakisa kaka nkanda mpe ekobebisa lisusu makambo.

Yakobo, moko ya bakomi ya Biblia alobaki boye: “Talá! Mwa mɔtɔ moke ekoki mpo na kozikisa zamba ya monene mpenza! Ɛɛ, lolemo ezali mɔtɔ.” (Yakobo 3:5, 6) Soki mwasi ná mobali bazali kobatela lolemo na bango te, mwa kowelana ya moke ekoki kokóma matata ya makasi. Mpe na mabala oyo koswana ezalaka mingi, ezalaka mpasi mpo bolingo emata.

Na esika ya kozongisa mabe na mabe, okoki te kolanda ndakisa ya Yesu oyo azalaki ‘kozongisa te’ ntango bazalaki kofinga ye? (1 Petelo 2:23) Lolenge ya kosilisa matata noki ezali kondima makanisi ya molongani na yo mpe kosɛnga bolimbisi mpo na mabe oyo osalaki na matata wana.

MEKÁ KOSALA BOYE: Mbala ya nsima oyo matata ekobima, omituna boye: ‘Ekosala nini soki nandimi makanisi ya molongani na ngai? Nini nasalaki mpo matata oyo ebima? Nini ezali kopekisa ngai kosɛnga bolimbisi mpo na mabe oyo nasali?’

‘Natyolaka makanisi ya molongani na ngai?’

Liloba ya Nzambe elobi boye: “Bino nyonso bózalaka na likanisi moko, bómityaka na esika ya bamosusu.” (1 Petelo 3:8) Talá makambo mibale oyo ekoki kopekisa yo osalela toli yango. Moko na yango ezali kozanga koyeba ndenge molongani na yo azali koyoka. Na ndakisa, soki likambo moko etungisaka molongani na yo koleka yo, okoki mbala mosusu koloba na ye, “ozali kolekisa ndelo.” Ekoki  kozala ozali nde na mposa ya kosalisa molongani na yo atalela likambo yango na ndenge ebongi. Nzokande, bato mingi basepelaka na makanisi ya ndenge wana te. Ezala basi to mibali, balingaka koyeba ete balongani na bango bayokelaka bango mpe bamityaka na esika na bango.

Lolendo ekoki mpe kotinda moto atyola makanisi ya molongani na ye. Moto ya lolendo amitombolaka mpe alukaka ntango nyonso kokitisa basusu. Akoki kobanda kofinga bango to kozwa bango lokola biloko mpamba. Tózwa ndakisa ya Bafalisai ná bakomeli ya ntango ya Yesu. Soki moto moko, ata mpe Mofalisai mosusu, apesi likanisi oyo ekeseni na oyo ya Bafalisai wana ya lolendo, bazalaki kolobela bango mabe to kotyola bango. (Yoane 7:45-52) Yesu azalaki kosala bongo te. Azalaki komitya na esika ya basusu ntango bazalaki koyebisa ye mpasi na bango.​—Matai 20:29-34; Malako 5:25-34.

Kanisá naino ndenge osalaka ntango molongani na yo abimisaka makanisi na ye. Maloba, mongongo mpe elongi na yo emonisaka ete ozali komitya na esika na ye? To omonisaka mbala moko ete makanisi na ye ezali na ntina te?

MEKÁ KOSALA BOYE: Nsima ya bapɔsɔ, talelá ndenge ozali kosolola na molongani na yo. Soki omoni ete ozali kokipe makanisi ya molongani na yo te to ozali kotyola ye, sɛngá bolimbisi mbala moko.

‘Nalobaka ntango nyonso ete molongani na ngai alukaka kaka bolamu na ye moko?’

“Yobo akotosaka Nzambe bobele mpamba? Yo otiki lopango kozingela ye te mpo na ndako na ye mpe na biloko na ye nyonso epai na epai?” (Yobo 1:9, 10) Na maloba wana, Satana aboyaki kondima ete Yobo azali sembo epai ya Yehova.

Soki mwasi ná mobali bakebi te, bakoki mpe kokwea na motambo wana. Na ndakisa, soki molongani na yo asaleli yo likambo moko ya malamu, omitunaka soki alingi nini to soki azali kobombela yo likambo? Soki molongani na yo asali libunga, omonaka mbala moko ete alukaka kaka matomba na ye moko mpe akipaka yo te? Obandaka kotángela ye mabe nyonso oyo asalá mpe oboyaka kolimbisa ye?

MEKÁ KOSALA BOYE: Kanisá makambo ya malamu oyo molongani na yo asalelá yo mpe ntina oyo asalaki yango.

Ntoma Paulo akomaki boye: “Bolingo . . . ebombaka mabe na motema te.” (1 Bakolinti 13:4, 5) Bolingo ya solosolo ekangaka miso na mabe te. Kasi, ebombaka mpe mabe na motema te. Paulo alobaki lisusu ete bolingo “endimaka makambo nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Elingi koloba te ete bolingo ya ndenge wana ezalaka bindimandima, kasi eyebaka kotyela basusu motema. Ekaniselaka basusu mabe te. Bolingo oyo Biblia ezali kolendisa biso tózala na yango elimbisaka mpe endimaka ete basusu bazali na makanisi ya malamu. (Nzembo 86:5; Baefese 4:32) Soki mwasi ná mobali bazali na bolingo ya ndenge wana, libala na bango ekozala malamu.

OMITUNA . . .

  • Wapi mabunga oyo mwasi ná mobali oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo basalaki?

  • Ndenge nini nakoki kokima mabunga wana na libala na ngai?

  • Makambo nini balobeli na lisolo oyo, namoni ete nasengeli kobongisa?

^ par. 3 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.