Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Ndenge ya kotya mibeko mpo na mwana na yo oyo akómi elenge

Ndenge ya kotya mibeko mpo na mwana na yo oyo akómi elenge

MOKAKATANO

Mwana na yo alobi ete ozalaka makambo makasimakasi. Kasi yo moko ozali komona ete ozalaka bongo te. Ozali kokanisa boye: ‘Soki nalɛmbisi mibeko mwa moke, akoki kokutana na mikakatano!’

Okoki kotyela ye mibeko oyo ebongi. Kasi, osengeli naino koyeba eloko oyo esalaka ete mibeko yango elɛmbisa ye. *

NINI ESALAKA BONGO?

Oyo bato bakanisaka: Bilenge nyonso baboyaka kotosa mibeko; ezali likambo oyo ekómelaka bana nyonso ya mbula wana.

Oyo esalemaka mpenza: Ezalaka mpasi elenge atomboka soki baboti batyeli ye mibeko ya makasimakasi te, mpe basololi yango ná ye.

Atako ezali na makambo mingi oyo ekoki kotinda moto atomboka, na kozanga koyeba, baboti bakoki kotinda mwana akóma motomboki soki bazali kotyela ye mibeko oyo ebongwanaka te to oyo ebongi lisusu na mbula na ye te. Tótalela makambo oyo elandi:

  • Mibeko oyo ebongwanaka te. Soki baboti balingaka ata moke te kobongola mibeko na makambo mosusu, mwana akomona lokola baboti batyelaka ye mibeko yango mpo na kotya bomoi na ye na nkaka, kasi te mpo na kobatela ye. Yango ekoki kosala ete asala na kobombana makambo oyo baboti bapekisi ye.

  • Ebongi lisusu na mbula na ye te. Mpo na mwana moke, okoki kosuka kaka na koyebisa ye, “mpo nalobaki bongo,” kasi bilenge bazalaka na mposa ya koyeba ntina oyo olobaki bongo. Kutu, mosika te, mwana na yo akokóma kofanda epai na ye moko mpe akobanda kozwa bikateli ya minene. Ezali malamu koleka ayekola ndenge ya kokanisa mpe ya kozwa bikateli ya malamu banda sikoyo, ntango azali naino na nse ya mibeko na yo.

Kasi okoki kosala nini soki mwana yango azali ntango nyonso kosilika mpo na mibeko oyo otyelaka ye?

OKOKI KOSALA BOYE

Liboso, yebá ete bilenge balingaka koyeba makambo oyo basengeli kosala to te mpe bazalaka na mposa ya litambwisi ya ndenge wana ata soki baboyi kondima yango. Na yango, tyelá ye mibeko, mpe luká koyeba soki akangi ntina na yango. Buku moko (Letting Go With Love and Confidence) elobi boye: “Ezalaka mpasi bilenge bakóma na bizaleli ya mabe soki baboti batyeli bango mibeko ya polele mpe bazali kolandela bango koleka ndelo te.” Na ngambo mosusu, baboti oyo bapesaka bana na bango bonsomi mingi bamonisaka ete bakipaka bana yango te. Yango esalaka ete bana bakóma batomboki.​—Toli ya Biblia: Masese 29:15.

Kasi, ndenge nini okoki kozala na bokatikati? Tiká mwana na yo apesa makanisi na ye mpo na mibeko oyo botyá na libota. Na ndakisa, soki asɛngi obongisa mwa moke ngonga oyo asengeli kozongaka na ndako, yoká ye ntango azali koloba. Ata soki ekateli oyo baboti bazwi esepelisi ye te, ezalaka mpasi te elenge atosa yango soki ayebi ete bayokaki ye malamu.​—Toli ya Biblia: Yakobo 1:19.

Na yango, liboso ya kozwa ekateli, kanisá likambo oyo: Bilenge balingaka bápesa bango bonsomi mingi koleka oyo basengeli na yango; nzokande, baboti balingaka kopesa bango bonsomi moke mpenza koleka oyo bakokaki kopesa bango. Boye, kozwa na lisɛki te likambo mwana na yo azali kosɛnga yo. Asilá komonisa ete akɔmeli? Ezali na makambo oyo esɛngi ete otikela ye mwa bonsomi? Lɛmbisá mwa moke mibeko yango soki esɛngi bongo.​—Toli ya Biblia: Ebandeli 19:17-22.

Longola koyoka ye, yebisá mpe mwana na yo susi na yo. Kosala bongo ekoki koteya ye atalelaka kaka bamposa na ye moko te, kasi mpe oyo ya basusu.​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 10:24.

Na nsima, zwá ekateli mpe monisá ntina oyo ozwi yango. Ata soki asepeli na ekateli yango te, na ntembe te akosepela ndenge azali na baboti oyo bayokaka ye mpe balukaka koyeba makanisi na ye. Kobosana te ete ozali kopesa mwana na yo formasyo mpo asalaka makambo lokola mikóló. Soki ozali kotya mibeko oyo ebongi mpe ozali kosolola yango ná mwana na yo, okosalisa ye akóma mokóló oyo ayebi kotambwisa bomoi na ye malamu.​—Toli ya Biblia: Masese 22:6.

^ par. 5 Na lisolo oyo tolobeli bilenge nyonso ezala mibali to basi.