Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kosolola oyo ememaka na bomoi

Kosolola oyo ememaka na bomoi

Kosolola oyo ememaka na bomoi

NA BIKELAMU nyonso oyo ezali awa na mabelé, bobele bato nde basukaka kaka te na kosolola bango na bango. Ezala bato ya ekólo nini, bazwi to babola, basi to mibali, batángá mingi to te, bato babotamaka na mposa ya kosolola na moto oyo aleki likoló, elingi koloba Nzambe.

Kosolola na Nzambe ezali nde likambo ya biyambayamba? Ezali bongo te! Ndenge lisolo oyo eleki emonisi yango, Nzambe akelá bato na elilingi na ye. Apesá biso likoki ya koyeba makambo ya elimo. Mposa ya kosolola na Tata na biso ya likoló ezali mpe na kati ya likoki yango. (Genese 1:27; Matai 5:3) Kutu, Nzambe amonaka ete kosolola na ye ezali na ntina mingi, yango wana alobi ete azali moto oyo ‘ayokaka mabondeli.’​—Nzembo 65:2.

Kanisá lokumu ya kobondela Mozwi-na-Nguya-Nyonso! Bato mingi bamonaka ete kosolola na moto monene, na ndakisa, prezida to ministre-mokonzi, ezali likambo moko ya lokumu mingi. Kasi, Yehova Nzambe azali moto oyo aleki likoló na molɔ́ngɔ́ mobimba! Mpe esɛngaka te tóyokana na ye liboso ngonga nini to mokolo nini tokosolola na ye. Tokoki kobondela ye ntango nyonso mpe na esika nyonso. Tokoki ata kosolola na Nzambe na nse ya motema. (1 Samwele 1:12-15) Kasi, Yehova asɛngaka ete tózala sembo, tóyokaka ye, mpe tótosaka ye. (Mika 6:8; Matai 6:5-13) Kutu, kosolola ya malamu esɛngaka ete bato nyonso mibale bálobaka.

Oyokaka ntango Nzambe alobaka?

Ndenge nini moto akoki koyoka ntango Nzambe azali koloba? Libosoliboso ntango azali kotánga mpe kosalela mateya oyo ezali na Liloba na ye oyo ekomami, Biblia Mosantu. (2 Timote 3:16; 2 Petelo 1:20, 21) Yesu alobaki ete: “Moto asengeli kobika . . . na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Oyokaka ndenge Nzambe alobaka ntango otángaka Liloba na ye oyo ekomami mpe osalelaka yango?

Baoyo basololaka na Yehova mbala na mbala, ye andimaka bango mpe bazwaka “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7; Masese 1:33) Bazali mpe na elikya ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé, epai mitungisi mpe bampasi oyo tozali komona lelo ekozala te. (Nzembo 37:29; Yoane 17:3) Talá matomba oyo okoki kozwa soki osaleli malamu likabo malamu ya kosolola!

[Elilingi na lokasa 10]

Kosolola na Nzambe elimboli kotánga Biblia mpe kobondela