Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo mazali koleka na mokili

Makambo mazali koleka na mokili

 Makambo mazali koleka na mokili

Kosala makambo ebele mbala moko ezali likama

Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete soki olingi kosala makambo ebele na mbala moko, “okosala yango malamu te, mpe okosala yango kaka likolólikoló. Koluka kosala makambo mibale to misato na mbala moko to kosala yango mbangumbangu oyo nsima na oyo kuna, ekoki kozwa yo ntango mingi koleka soki osali yango moko moko, mpe ekoki kozangisa yo mayele oyo esengeli mpo na kokokisa mosala moko moko.” Bilembo oyo elakisaka ete makambo elekeli moto yango oyo: kobosana makambo (na ndakisa kobosana likambo oyo outi kosala to koloba), makanisi ekómi koyengayenga, kokoka te kotya likebi ntango molai, kotungisama na makanisi (na ndakisa kopema mbangumbangu), mpe kozala na mokakatano mpo na kosolola malamu na bato. Soki ozali kosala makambo ebele na mbala moko, okosala yango malamu te, mingi mpenza soki makambo yango ezali kosɛnga bɔɔngɔ na yo etyela yango likebi ndenge moko, na ndakisa ozali kosolola na telefone mpe oyoki mwana azali kobenga na eteni mosusu ya ndako. Kosala makambo ebele na mbala moko ezali likama mingi mpenza ntango ozali kotambwisa motuka. Makambo lokola kolya to komɛla masanga, koluka kozwa eloko, kosolola masolo milaimilai na bato oyo omemi na motuka to na telefone, kopakola tilí to pudre, ata kofungola radio to aparɛi mosusu, ekoki kolongola likebi na yo mpo na mwa ntango moke mpe kosalisa yo likama.

 Koningisaka mwana ata moke te!

Zulunalo moko (Toronto Star) elobi ete: “Koningisa mwana makasi ezali likama mpo ekoki kobimisa ye makila na motó mpe kofina bɔɔngɔ na ye, mpe yango ekoki kopanzana.” Lokola nzoto ya mwana ekembi naino te mpe bɔɔngɔ na ye ezali naino pɛtɛɛ mpenza, “koningisa ye ata mwa basegɔnde ekoki kozala likama mpo na bomoi na ye mobimba. Bɔɔngɔ na ye ekoki kovimba mpe kozoka, ekosala lisusu malamu te, mwana yango akozala na mayele mingi te, akoki kokola malamu te, kokufa miso, kokufa matoi, kozwa maladi ya paralize, ata mpe kokufa.” James King, monganga ya bana mike, oyo asalaka na lopitalo moko ya bana na ɛsti ya Ontario, na Canada, ayekolaki bamaladi oyo bana mike bakoki kozwa soki baningisi bango. Alobi ete “esengeli koteya bato báyeba likambo yango, mpamba te mbala mingi bilembo yango emonanaka noki te mpe bakoki kokanisa ete mwana abɛli gripɛ to maladi mosusu.” Monganga King alobi ete: “Esengeli bato nyonso báyeba malamumalamu likambo oyo ete koningisa mwana moke ezali malamu soki moke te. Baboti oyo babandi kobota basengeli koyeba yango.”

Basepelaka na mangomba te

Zulunalo moko (IHT Asahi Shimbun) elobi boye: “Emonani ete bato [ya Japon] balingaka te kokɔta na mangomba mpo na koluka kosilisa mikakatano na bango, atako bazali kobundana mpo na kolonga na bomoi ya lelo oyo esili kobeba.” Ntango batunaki bango motuna: “Ondimaka Nzambe to osambelaka na lingomba moko boye?,” bobele mwa ndambo (13 %) ya mibali ná basi bandimaki. Mwa ndambo mosusu ya mibali (9 %) mpe ya basi (10 %) balobaki ete basepelaka na mangomba “kaka moke.” Zulunalo yango ebakisi boye: “Likambo mosusu ya kokamwa ezali ete bana basi oyo bazali na mbula banda 20 tii 29, oyo bazali kosepela na mangomba bazali moke mpenza (pene na 6 %).” Na Japon, ankɛtɛ oyo basalaka mbula na mbula emonisaki ete mibali mingi (77 %) mpe basi mingi (76 %) balobaki ete basepelaka na mangomba te to na endimeli moko te. Soki tokokanisi ankɛtɛ yango na ankɛtɛ mosusu ya ndenge wana oyo esalemaki na 1978, motango ya bato ya Japon oyo bamipesaka na mangomba esili kokita na katikati. Mbala mingi, ezalaki bampaka, mingi mpenza baoyo basili koleka mbula 60, nde bandimaki ete basepelaka moke na mangomba.

Konyokwama na makanisi ebimisaka bamaladi mosusu

Zulunalo moko (U.S.News & World Report) elobi ete: “Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto elobaki ete tii na mobu 2020, na mokili mobimba, konyokwama na makanisi ekokóma maladi ya mibale oyo ebebisaka binama ya nzoto nsima ya maladi ya motema.” Mokakatano wana ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto etalelami lisusu te lokola likambo oyo etali “bobele mayoki ya moto ye moko.” Philip Gold, oyo azali mokambi na lopitalo moko ya maladi ya motó na Amerika, alobi ete: “Konyokwama na makanisi ezali maladi bobele moko oyo, soki moto abɛli yango, ebimisaka​—⁠mpe engalisaka​—⁠pene na bamaladi nyonso mosusu.” Konyokwama na makanisi ekoki ata kopesa moto maladi ya motema mpe diabɛti. Na ndakisa, lisolo yango emonisi ete ntango bayekolaki likambo yango, bamonaki ete bato oyo banyokwamaka na makanisi ezali bato oyo “bakokaka te kokanga motema, baoyo mitema na bango ekokaka te mbongwana ya nzoto ntango esɛngaka makila mpe oxygène emata to ekita.” Lisusu, “bɔɔngɔ ya moto oyo azali konyokwama na makanisi etindaka bilembo mpo na komonisa ete ezali na mposa ya kozwa makasi (énergie) mingi, mpe yango ekoki kobimisa mwa mai babengi cortisol mpo ebakisa sukali na nzoto.” Bamonaki mpe ete konyokwama na makanisi ebimisaka maladi ya mikuwa (ostéoporose) mpe kansɛr. Bazali koyekola likambo yango mpo na koluka koyeba soki kosalisa moto oyo azali konyokwama na makanisi ekoki mpe kosilisa bamaladi wana.

Libala mpe motema

Zulunalo moko ya Londres (The Daily Telegraph) eyebisi ete: “Ankɛtɛ moko emonisi ete ndenge oyo libala ya moto oyo basali ye lipaso ya motema ezali ekoki kosalisa ye abika noki to te.” Monganga James Coyne, ya Iniversite ya Pennsylvanie, na États-Unis, amonisi ete libala ya malamu ekoki kotinda moto oyo azali na maladi asala nyonso mpo abika, kasi “libala ya mabe ekoki kozala mabe mingi mpo na ye koleka kutu soki abalaki te.” Monganga Coyne ná ekipi na ye, nsima ya kozwa bilili ya basi ná mibali wana bazalaki koswana, bamonaki ete bato oyo basalaki bango lipaso ya motema, oyo bazalaki koyokana te na babalani na bango, bakómaki pene ya kokufa mbala mibale koleka na mbula minei oyo elandaki, koleka baoyo bazalaki na boyokani ya malamu. Monganga Linda Waite, profesɛrɛ ya sosioloji na Iniversite ya Chicago, asukisi ete libala ya malamu ezali “ndenge moko mpenza na mimeseno malamu lokola kolya malamu, kosala ngalasisi mpe koboya komɛla likaya.”

“Nzete oyo basalaka na yango violon” elingi kosila

Zulunalo moko (natur & kosmos) ya makambo ya siansi na Allemagne elobi boye: “Mpo na kosala violon ya malamu, esɛngaka nzete nyonso te, kasi nzete yango ezali komonana lisusu mingi te.” Nzete oyo basalaka na yango violon ezali Cæsalpinia echinata, oyo mpe eyebani na nkombo ya pernambouc to Pau brasil. Nzete yango ezalaka na zamba oyo ezali pembenipembeni ya mbu na Brésil. Kasi zamba yango ezali kosila nokinoki mpo bato bazali kokata yango mpo na kosala bilanga. Lelo oyo, banzete yango etikali mpenza moke (4 %) na bisika oyo ezalaka mpe ezali na molɔngɔ ya banzete oyo elingi kolimwa. Lisusu, bobele motema ya nzete yango oyo ekokisi mbula 20 to koleka nde ekómaka na langi ya mosaka to ya mwa motane, kaka yango nde ebongi mpo na kosala violon. Zulunalo yango ebakisi ete, na makanisi ya Thomas Gerberth, mosali monene ya violon, ezali na nzete mosusu te oyo ekoki kozwa esika na yango, mpamba te “plastiki oyo basali na izinɛ naino ebimisi mondule lokola nzete wana te.” Bato oyo basalaka violon mpe babɛti miziki bazali kolendisa bato mpo na kobatela “nzete na bango ya violon.”

Maladi moko ya kala ezali naino konyokola bato

Zulunalo moko ya Espagne (El País) elobi boye: “Na kotalela mitango oyo Ebongiseli ya mokili mobimba mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto epesi, bazwaki bato mosusu koleka 700 000 na maladi ya maba na mokili mobimba na 2002.” Banda na ntango ya kala mpenza, bato babangaka maladi ya maba. Motindo ya maladi yango oyo ezali na mikolo oyo esilaka na nkisi. Na mbula 20 oyo euti koleka, bato pene na milio 12 babikaki na maladi yango. Atako bongo, Jeanette Farrell, monganga ya maladi yango alobi ete “tokoki naino kondima te ete maba esilá.” Minganga bazali kokoka te kosilisa yango mpo na libela, mpe bato mosusu bazali kozwa maladi yango mbala na mbala. Bikólo oyo maladi yango ezali kozwa bato mingi ezali Brésil, Inde, Madagascar, Mozambique, Myanmar mpe Népal. Lokola bato ya siansi bakómi koyeba malamu ndenge nzoto ya moto ezali (genome humain), bazali kolikya ete bakobimisa mangwele ya makasi mpo na maladi yango.

Na Chine, “likambo ya kobanga: mibali bakómi ebele koleka basi”

Zulunalo moko (China Today) elobi ete: “Ntango batángaki bato ya Chine mpo na mbala ya mitano, bamonaki ete bana mibali oyo bazali kobotama bazali mingi koleka bana basi (bana mibali 116,9 mpe bana basi 100), nzokande na 1990 ezalaki bana mibali 113,8 mpe bana basi 100. Mituya wana eleki mpenza oyo endimami na mokili mobimba, oyo elingi ete soki bana mibali babotami 105 bana basi bázala 100, mpe emonisi ete mibali bakómi ebele koleka basi, likambo yango liboso ezalaki kobangisa kasi sikoyo ekómi nsɔmɔ koleka. Bazali koloba ete na bambula oyo ezali koya, na Chine, mibali soki milio 50 bakozwa basi te ntango bakokóma na mbula ya kobala. Zulunalo yango ebakisi ete: “Bamonisi ete Zheng Zizhen, mokambi ya ebongiseli moko (Institut de sociologie et de démographie) na etúká ya Guangdong, alobi ete lokola banda mwa kala mibali bazali kobotama mingi koleka basi, bomoi ya bato ya Chine mpe bizaleli na bango ekokóma na mobulu.”