Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo 48: Bwanya ya bato ya Gibeone

Lisolo 48: Bwanya ya bato ya Gibeone

BAMBOKA mingi na mokili ya Kanana ezali komibongisa mpo bábundisa Yisraele. Mpe bakanisi ete bakolonga. Kasi bato ya Gibeone, oyo bazalaki pene wana, bakanisaki ete bakolonga te. Bandimaki ete Nzambe azali kobundela Yisraele mpe balingaki kobunda na Nzambe te. Bongo basalaki nini?

Basalaki mayele, bakosaki ete bauti na mokili moko mosika. Yango wana, bato mosusu kati na bango balataki bilamba epasukapasuká mpe basandale oyo ebebabebá. Bamemisaki bampunda na bango basaki oyo ebebabebá mpe bakamataki mampa ya kala oyo ekaukakauká. Bongo bakómaki epai ya Yosua mpe balobi na ye ete: ‘Biso touti na mokili moko mosika, mpo toyokaki nsango ya Yehova, Nzambe monene. Toyoki mpe makambo nyonso oyo asalaki na Ezipito. Bongo bakonzi na biso bayebisi biso tózwa biloko ya kolya na mobembo mpe tóya epai na bino mpo na koyebisa bino ete: “Tozali basaleli na bino. Bólaka biso ete bokobunda na biso te.” Bótala ndenge bilamba na biso enzuluki, mobembo ezalaki molai mingi mpe mampa na biso ekaukikauki.’

Yosua ná bankumu mosusu bandimeli bato ya Gibeone. Balaki ete bakobunda na bango te. Kasi, nsima ya mikolo misato mpamba, bayoki ete mboka na bango ezali mpenza penepene na bango.

Bongo Yosua atuni bango ete: ‘Mpo na nini bolobaki na biso ete bouti na mokili moko mosika?’

Bato ya Gibeone bazongisi ete: ‘Tosalaki bongo mpo bayebisá biso ete Yehova, Nzambe na yo, alakaki ete akopesa bino mokili mobimba ya Kanana. Bongo tobangaki ete bokoboma biso.’ Kasi Bayisraele batosi elaka na bango, babomi bango te. Bakómisi bango nde basaleli na bango.

Ntango mokonzi ya Yerusaleme ayoki ete bato ya Gibeone basali boyokani ya kimya na Yisraele, ayoki nkanda makasi. Atindi maloba epai ya bakonzi mosusu minei ete: ‘Bóya kosalisa ngai tóbunda na Gibeone.’ Bakonzi wana mitano bayaki kobundisa Gibeone. Bato ya Gibeone basalaki mpenza malamu ndenge basalaki boyokani ya kimya na Yisraele? Tokoyeba yango na lisolo oyo elandi.

Yosua 9:1-27; 10:1-5.

Yosua ná Bagibeone


Mituna

  • Ndenge nini bato ya Gibeone bakesanaki na Bakanana mosusu oyo bazalaki kofanda penepene na bango?
  • Ndenge elilingi oyo emonisi, bato ya Gibeone basalaki nini, mpe mpo na nini?
  • Elaka nini Yosua ná bankumu ya Yisraele bapesaki bato ya Gibeone, kasi bayebaki likambo nini nsima ya mikolo misato?
  • Likambo nini esalemaki ntango bakonzi ya bamboka mosusu bayokaki ete bato ya Gibeone basali boyokani ya kimya na Yisraele?

Mituna mosusu