Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 7: Banda Yesu asekwi tii bakangi Paulo

Eteni 7: Banda Yesu asekwi tii bakangi Paulo

Yesu asekwaki na mokolo ya misato nsima ya liwa na ye. Na mokolo yango abimelaki bayekoli na ye mbala mitano. Yesu akobaki kobimela bango na boumeli na mikolo ntuku minei (40). Na nsima, abutaki na likoló, na ntango yango bayekoli na ye mosusu bazalaki kotala ye. Nsima ya mikolo zomi, Nzambe asopelaki bayekoli ya Yesu oyo bazalaki kozela na Yerusaleme elimo santu.

Na nsima, banguna ya Nzambe babwakaki bantoma na bolɔkɔ, kasi anzelu moko abimisaki bango. Batɛmɛli babomaki moyekoli Stefano na mabanga. Kasi tokomona ndenge Yesu aponaki moko ya batɛmɛli yango mpo akóma mosaleli na ye monene, mpe bakómaki kobenga ye ntoma Paulo. Mbula misato na ndambo nsima ya liwa ya Yesu, Nzambe atindaki ntoma Petro asakwela Korneyi ná libota na ye, atako moto yango azalaki Moyuda te.

Mbula soki zomi na misato na nsima, ntoma Paulo abandaki mobembo ya liboso ya mosala ya kosakola. Na mobembo ya mibale, Timote akendeki na ye. Tokomona ete ntoma Paulo ná baninga na ye ya mobembo bakutanaki na makambo ya esengo na mosala ya Nzambe. Na nsuka, ntoma Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Roma. Mbula mibale na nsima, babimisaki ye. Bongo bakangaki ye lisusu mpe na nsima babomi ye. ETENI 7 elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli mbula soki ntuku misato na mibale (32).

Kongɛnga ebomi Saulo miso