Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eteni 4: Banda na mokonzi ya liboso na Yisraele tii bakei boombo na Babilone

Eteni 4: Banda na mokonzi ya liboso na Yisraele tii bakei boombo na Babilone

Saulo akómaki mokonzi ya liboso na Yisraele. Kasi Yehova aboyaki ye, aponaki Davidi azala mokonzi na esika na ye. Biblia elobeli Davidi mingi. Atako azalaki naino elenge, abomaki elombe Goliate. Na nsima, akimaki mpo Saulo ayokelaki ye zuwa. Mokolo mosusu, Abigaile, mwasi kitoko, apekisaki ye kosala likambo moko ya bozoba.

Tokolobela mpe Salomo, mwana na ye, oyo akómaki mokonzi nsima na ye, na Yisraele. Bakonzi misato ya liboso na Yisraele bayangelaki moto na moto mbula ntuku minei (40). Nsima ya liwa ya Mokonzi Salomo, bokonzi ya Yisraele ekabwanaki na mibale: bokonzi ya nɔrdi ná bokonzi ya sudi.

Bokonzi ya Nɔrdi ezalaki na mabota zomi, eumelaki mbula nkama mibale na ntuku mitano na nsambo (257), na nsima bato ya Asiri bakweisi yango. Mbula nkama moko na ntuku misato na misato (133) na nsima, bokonzi ya sudi, oyo ezalaki na mabota mibale ekwei mpe. Bongo Bayisraele bakei boombo na Babilone. Eteni ya MINEI ezali kolobela makambo minene oyo esalemaki na boumeli ya mbula nkama mitano na zomi (510).

Mokonzi Salomo azali kobondela