Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nzambe abongolaka makanisi na ye?

Nzambe abongolaka makanisi na ye?

Eyano ya Biblia

 Ɛɛ, abongolaka makanisi na ye ntango bato batiki bizaleli na bango ya mabe. Na ndakisa ntango Nzambe ayebisaki basaleli na ye na Yisraele ya kala ete akopesa bango etumbu, alobaki boye: “Mbala mosusu bakoyoka mpe bakozonga, moto na moto longwa na nzela na ye mabe, mpe nakoyoka mpenza mawa mpo na mpasi oyo nazali kokanisa kobimisela bango mpo na mabe ya misala na bango.”​—Yirimia 26:3.

 Na vɛrsɛ yango, Babiblia mingi elobaka ete Nzambe ‘akobongola motema’ mpo na mpasi oyo akanaki kobimisa; nzokande yango ekoki komonisa lokola nde Nzambe asalaki libunga. Nzokande, liloba ya Ebre oyo basaleli wana ekoki kolimbola “kobongola makanisi to mokano.” Moto moko ya mayele akomaki ete: “Soki moto abongoli bizaleli na ye, Nzambe mpe abongolaka lisambisi oyo akataki.”

 Nzokande, koloba ete Nzambe akoki kobongola makanisi na ye elakisi te ete asengeli kaka kobongola yango. Talá mwa bandakisa ya Biblia oyo emonisi ete Nzambe abongolaki makanisi na ye te:

  •   Nzambe atikaki te Balake atinda Ye abongola makanisi mpe alakela Bayisraele mabe.​—Mitángo 23:18-20.

  •   Ntango Mokonzi Saulo amipesaki na kosala mabe, Nzambe abongolaki makanisi na ye te, alongolaki ye mokonzi.​—1 Samwele 15:28, 29.

  •   Nzambe akokokisa elaka na ye ya kotya Mwana na ye nganga-nzambe mpo na libela. Nzambe akobongola makanisi na ye te.​—Nzembo 110:4.

Biblia elobi ete Nzambe abongwanaka te?

 Ɛɛ, Biblia elobi ete Nzambe ye moko alobi: “Ngai nazali Yehova; nabongwani te.” (Malaki 3:6) Biblia elobi mpe ete Nzambe “abongwanaka te lokola elili.” (Yakobo 1:17) Kasi, yango ekeseni te na ndenge Biblia elobi ete Nzambe abongolaka makanisi na ye. Koloba ete Nzambe abongwanaka te elimboli ete bizaleli na ye mpe mitinda na ye ya bolingo mpe ya boyengebene ebongwanaka te. (Kolimbola Mibeko 32:4; 1 Yoane 4:8) Kasi, akoki kopesa bato malako ekeseni na kotalela ndenge makambo ezali. Na ndakisa, Nzambe apesaki Mokonzi Davidi malako ekeseni mpo na kobunda bitumba mibale, mpe mayele yango nyonso esimbaki.​—2 Samwele 5:18-25.

Nzambe ayokaka mawa ndenge akelaki bato?

 Te; kasi ayokaka mawa ndenge bato mingi bazali kokipe ye te to mpe kopesa ye mokɔngɔ. Mpo na makambo oyo ezalaki kosalema liboso ya Mpela ya mikolo ya Noa, Biblia elobi boye: “Yehova ayokaki mawa mpo asalaki bato na mabele, mpe ayokaki mpasi na motema na ye.” (Ebandeli 6:6) Na vɛrsɛ oyo, maloba “ayokaki mawa” euti na liloba ya Ebre oyo ekoki kolimbola “kobongola makanisi.” Nzambe abongolaki makanisi na ye mpo na bato mingi oyo bazalaki liboso ya Mpela mpo bakómaki bato mabe. (Ebandeli 6:5, 11) Atako ayokaki mawa ndenge baponaki kolanda nzela ya mabe, abongolaki makanisi na ye mpo na bato nyonso ya mabele te. Kutu, abatelaki bato mpo básila te na mpela na ndenge abikisaki Noa ná libota na ye.​—Ebandeli 8:21; 2 Petro 2:5, 9.