Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Bolɔzi monene ezali nini?

Bolɔzi monene ezali nini?

Eyano ya Biblia

Bolɔzi monene ekozala ntango ya mobulu mpenza oyo bato bamoná naino te. Bisakweli ya Biblia emonisi ete likambo yango ekosalema na “mikolo ya nsuka,” to “eleko ya suka.” (2 Timote 3:1; Daniel 12:4, Bible na lingala ya lelo oyo) Ekozala “bolɔzi moko oyo esalemá naino te banda ebandeli ya bozalisi oyo Nzambe azalisaki tii na ntango wana, mpe ekosalema lisusu te.”​—Marko 13:19; Danyele 12:1; Matai 24:21, 22.

Makambo oyo ekosalema na ntango ya bolɔzi monene

  • Mangomba ya lokuta ekobomama. Mangomba ya lokuta ekobomama nokinoki mpenza. (Emoniseli 17:1, 5; 18:9, 10, 21) Bakonzi ya politiki, oyo bamonisami na ONU, bakokokisa mokano ya Nzambe na ndenge bakoboma mangomba yango.​—Emoniseli 17:3, 15-18. *

  • Kobundisa lingomba ya solo. Etuluku ya bikólo, oyo Ezekiele amonaki oyo ezali “Goge ya mokili ya Magoge,” akosala nyonso asilisa baoyo basambelaka na losambo ya solo. Nzokande, Nzambe akobatela bato oyo basambelaka ye mpo bábomama te.​—Ezekiele 38:1, 2, 9-12, 18-23.

  • Kosambisa bato oyo bazali na mabele. Yesu akosambisa bato nyonso mpe “akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba.” (Matai 25:31-33) Bato bakosambisama na kolanda makambo oyo basalelaki “bandeko” ya Yesu, oyo bakoyangela na ye na likoló, soki basalisaki bango to te.​—Matai 25:34-46.

  • Kosangisa bato oyo bakoyangela. Bato ya sembo oyo baponamaki mpo na koyangela elongo na Kristo bakosilisa bomoi na bango awa na mabele mpe bakosekwisama mpo na kokende na likoló.​—Matai 24:31; 1 Bakorinti 15:50-53; 1 Batesaloniki 4:15-17.

  • Armagedone. Yango ezali “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,” babengaka yango mpe “mokolo ya Yehova.” (Emoniseli 16:14, 16; Yisaya 13:9; 2 Petro 3:12) Bato oyo Kristo akokweisa na likambo, bakobomama. (Sefania 1:18; 2 Batesaloniki 1:6-10) Ebongiseli ya politiki, oyo Biblia emonisi ete ezali nyama mabe ya mitó nsambo, mpe ekobomama.​—Emoniseli 19:19-21.

Makambo oyo ekosalema nsima ya bolɔzi monene

  • Satana ná bademo bakokangama. Anzelu moko ya nguya akobwaka Satana ná bademo na “libulu mozindo,” ezali lokola nde bakufi mpo bakosala eloko te. (Emoniseli 20:1-3) Ndenge Satana akozala na libulu mozindo ezali lokola nde azali na bolɔkɔ; akotinda moto ata na esika moko te ete asala boye to boye.​—Emoniseli 20:7.

  • Boyangeli ya Mbula Nkóto ekobanda. Bokonzi ya Nzambe ekobanda boyangeli na yango ya mbula 1 000, mpe boyangeli yango ekomemela bato mapamboli ebele. (Emoniseli 5:9, 10; 20:4, 6) “Ebele mpenza ya bato” oyo motángo na bango eyebani te ‘bakouta na bolɔzi monene’ mpe bakobika mpo na komona ebandeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto awa na mabele.​—Emoniseli 7:9, 14; Nzembo 37:9-11.

^ par. 5 Na mokanda ya Emoniseli, mangomba ya lokuta emonisami na Babilone Monene, “mama ya basi ya ndumba.” (Emoniseli 17:1, 5) Nyama ya motane makasi, oyo akoboma Babilone Monene, ezali elembo ya ebongiseli oyo mokano na yango ezali ya kosangisa bato mpe ezali komonisa bikólo ya mokili. Liboso ezalaki Société des Nations mpe sikoyo ezali ONU.

Makambo mosusu

BIYANO NA MITUNA YA BIBLIA

Bokonzi ya Nzambe ekosala nini?

Talá makambo oyo okoki kozela ete guvɛrnema ya Nzambe ekosala na mabele mobimba.