Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Nyama mabe ya langi ya motane makasi oyo Emoniseli 17 elobeli ezali nini?

Nyama mabe ya langi ya motane makasi oyo Emoniseli 17 elobeli ezali nini?

Eyano ya Biblia

Nyama mabe ya langi ya motane makasi oyo Emoniseli mokapo 17 elobeli ezali elilingi ya ebongiseli oyo mokano na yango ezali ya kosangisa mpe komonisa bikólo ya mokili mobimba. Liboso ebongiseli yango ebengamaki Société des Nations kasi sikoyo babengaka yango ONU.

Ndenge ya koyeba nyama ya langi ya motane makasi

  1. Ebongiseli moko ya politiki. Nyama mabe ya langi ya motane makasi ezali na “mitó . . . nsambo” oyo emonisi “bangomba nsambo” mpe “bakonzi nsambo,” to banguya oyo ezali koyangela. (Emoniseli 17:9, 10) Biblia esalelaka bangomba mpe banyama mpo na kolobela baguvernema.​—Yirimia 51:24, 25; Danyele 2:44, 45; 7:17, 23.

  2. Elilingi ya ebongiseli ya politiki na mokili mobimba. Nyama mabe ya langi ya motane makasi ekokani na nyama ya mitó nsambo ya Emoniseli mokapo 13, oyo emonisi ebongiseli ya politiki na mokili mobimba. Nyama yango nyonso mibale ezali na mitó nsambo, maseke zomi mpe bankombo ya kofinga. (Emoniseli 13:1; 17:3) Ndenge banyama yango ekokani ezali kokamwisa mpenza mpe ekoki kozala mpamba te. Nyama mabe ya langi ya motane makasi ezali elilingi ya ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba.​—Emoniseli 13:15.

  3. Nguya na yango euti na biyangeli mosusu. Nyama mabe ya langi ya motane makasi “euti na,” to ebimi na banguya mosusu oyo ezali koyangela.​—Emoniseli 17:11, 17.

  4. Ezali na boyokani na mangomba. Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba efandeli nyama mabe ya langi ya motane makasi, mpo na komonisa ete nyama yango esalaka makambo oyo mangomba yango elingi.​—Emoniseli 17:3-5.

  5. Ekumisaka Nzambe te. Nyama yango “etondi na bankombo ya kofinga.”​—Emoniseli 17:3.

  6. Ekozala te mpo na mwa ntango. Nyama mabe ya langi ya motane ekozala na “libulu mozindo,” * to ekozala te mpo na mwa ntango kasi ekobima lisusu.​—Emoniseli 17:8.

Ekokisi esakweli ya Biblia

Tótala ndenge ONU mpe Société des Nations oyo ezalaki liboso na yango ekokisaki esakweli ya Biblia oyo etali nyama mabe ya langi ya motane makasi.

  1. Ebongiseli moko ya politiki. ONU epesaka ebongiseli ya politiki mabɔkɔ na ndenge esalaka ete “bikólo oyo ezali na kati na yango eyangelama ndenge moko.” *

  2. Elilingi ya ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba. Na 2011, ONU ekómaki na bikólo 193. Na yango, elobaka ete emonisaka bikólo mingi mpe bato ya mokili mobimba.

  3. Nguya na yango euti na biyangeli mosusu. ONU esalemi na bikólo oyo ezali na kati na yango mpe bikólo yango nde epesaka yango nguya.

  4. Ezali na boyokani na mangomba. Mangomba ya mokili epesaki Société des Nations mabɔkɔ mpe epesaka ONU mabɔkɔ. *

  5. Ekumisaka Nzambe te. Bato basalaki ONU mpo “kimya mpe libateli ezala na mokili mobimba.” * Atako mokano yango ekoki komonana malamu, ONU esambwisaka nde Nzambe ndenge etutaka ntolo ete esalaka makambo oyo Nzambe alobi ete kaka Bokonzi na ye nde ekosala.​—Nzembo 46:9; Danyele 2:44.

  6. Ekozala te mpo na mwa ntango. Société des Nations oyo bato basalaki mwa moke nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpo na kobatela kimya, elongaki te kopekisa bitumba ya bikólo. Ezalaki lisusu te ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki na 1939. Na 1945, ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba esilaki, bato basalaki ONU. Mokano na yango, mayele oyo esalelaka mpe ndenge oyo ebongisami ekokani mpenza na oyo ya Société des Nations.

^ par. 10 Buku moko (Vine’s Expository Dictionary of Old and New Testament Words) elobi ete maloba ya Grɛki oyo ebongolami na “libulu mozindo” emonisaka “mozindo oyo molai na yango eyebani te.” Biblia King James Version ebongoli maloba yango na “libulu oyo bozindo na yango ezangi nsuka.” Na Biblia, emonisaka esika ya bolɔkɔ mpe oyo ezali ata na mosala moko te.

^ par. 13 Talá Artikle 2 ya mokanda ya mibeko oyo etambwisaka ONU.

^ par. 16 Na ndakisa, na 1918 likita moko oyo esangisaki ebele ya mangomba ya Protesta na Amerika elobaki ete Sociéte des Nations ekozala “komonisama ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele na nzela ya politiki.” Na 1965, bamonisi ya mangomba ya Buda, Katolike, Ortɔdɔksɛ, Hindu, muzilma, lingomba ya Bayuda mpe Baprotesta bayanganaki na San Francisco mpo na kopesa ONU mabɔkɔ mpe kobondela mpo na yango. Mpe na 1979, Pape Jean Paul II amonisaki elikya na ye ete ONU “ekotikala kaka esika eleki monene mpo na kolobela kimya mpe bosembo.”

^ par. 17 Talá Artikle 1 ya mokanda ya mibeko oyo etambwisaka ONU.