Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka​—Eteni 2: Kotánga na telefone to na mokanda ya papye?

Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka​—Eteni 2: Kotánga na telefone to na mokanda ya papye?

 Bana na yo basepelaka kotánga na mokanda ya papye to na telefone?

 Bilenge migi bakopona kotánga na telefone to na tablɛti. Profɛsɛrɛ moko ya pisikoloji na nkombo Jean Twenge a, alobi ete “Na eleko oyo bato bameseni kofina mosapi mpo na kokende na lisolo mosusu to mpo na kobalola lokasa na sɛgonde moke kaka, babaku ekokaka te kozwa likebi na bango nyonso.

 Ya solo kotánga na telefone to na tablɛti ezali na matomba na yango. John oyo azali na mbula 20 alobi boye: “Na eteyelo epai nazalaki kotánga, tozalaki kosalela babuku oyo etyami na telefone to na tablɛti. Soki nakomi likambo oyo nalingi koluka, nazalaki komona yango nokinoki.”

 Ntango ozali kotánga na telefone ozali na biloko mingi oyo ekoki kosalisa yo, kaka na misapi na yo. Na ndakisa, soki kaka ofini na mosapi, okoki komona ndimbola ya liloba moko, koyoka audio, kotala video ya likambo yango, to kokende mbala moko na lisolo mosusu oyo etyami wana mpo omona makambo mosusu. Kasi, yango elingi nde koloba ete kotánga na mokanda ya papye ezali na litomba te?

 Mpo na koyekola mpenza na mozindo, bato mosusu basepelaka kotánga mokanda ya papye. Mpo na nini?

  •   Kotya makanisi esika moko. Elenge moko na nkombo Nathan alobi boye: “Ntango nazali kotánga na telefone to na tablɛti, mbala mingi bapiblisite ná bamesaje elongolaka likebi na ngai na makambo oyo nazali kotánga.”

     Karen, oyo azali na mbula 20, azalaka mpe na mokakatano yango. Alobi boye: “Ntango nazali kotánga na telefone to na tablɛti, ezalaka mpasi te likebi na ngai ekende na programɛ mosusu to nayoka mposa ya kobɛta lisano moko.”

     Toli ya Biblia: “Bósalela ntango na bino malamu mpenza.​—Bakolose 4:5, Phillips.

     Kanisá naino: Mwana na oyo azali na komipekisa oyo ekoki mpo eloko moko te elongola likebi na ye ntango azali kotánga to koyekola na telefone? Soki azali na yango te, ndenge nini okoki kosalisa mwana ayekola kotya makanisi esika moko?

     Likanisi: Salisá mwana ayeba ete makambo oyo ekobenda likebi na ye na telefone ekosala ete aumela mingi ntango azali kosala badevuare mpe kobebisa ntango oyo akokaki kosala makambo mosusu.

  •   Kokanga ntina. Buku moko (Be the Parent, Please) elobi boye: “Baankɛte mingi emoni moto oyo azali kotánga na telefone to na tablɛti akangaka ntina ya makambo ndenge moko te na moto oyo atángi na papye.”

     Ntina moko ezali ete mbala mingi moto oyo azali kotánga na telefone alekaka makambo likolólikoló na esika ya kokanisa yango malamu. Mokomi moko na nkombo Nicholas Carr alobi boye: “Na Internet, tolingaka koyeba makambo ebele nokinoki koleka oyo miso ekoki komona mpe mabɔkɔ ekoki kolekisa.” b

     Na bantango mosusu, koleka makambo likolólikoló ezalaka na litomba. Carr alobi ete “mabe ezali ete tokómi kotánga kaka bongo.” Na yango, mwana akoki kokolisa momeseno ya koleka makambo likolólikoló kozanga akanga ntina na yango.

     Toli ya Biblia: “Na nyonso oyo ozali kozwa, zwá mpe mayele.”​—Masese 4:7.

     Kanisá naino: Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo ayekola likambo moko malamumalamu, ezali soki azali kotánga na papye to na telefone?

     Likanisi: Zalá na bokatikati. Tolobi te ete oboya telefone to papye. Nyonso mibale ezali na matomba na yango. Kutu, baprogramɛ mosusu oyo ezalaka na telefone esalisaka mpo na kokanga ntina. Na yango, Zalá na bokatikati ntango bozali kotalela mabe ná malamu ya esaleli oyo bana na biso bakosalela mpo na kotánga. Kobosana mpe te ete mwana na mwana azali na ndenge na ye.

  •   Kokanga makambo. Na lisolo oyo ebimaki na zulunalo moko (Scientific American) Ferris Jabr alobaki ete na bokeseni na kotánga na papye, kotánga na telefone to na tablɛti ekoki “kolɛmbisa bɔɔngɔ mingi . . . mpe ezalaka mwa mpasi koleka mpo na koyeba lisusu makambo oyo totángaki.”

     Na ndakisa, kotánga na mokanda ya papye ekoki kosalisa bɔɔngɔ ekanga esika nini na lokasa moko tomonaki likambo moko boye. Na yango, tokoki kotya elembo na motó mpo na komona esika yango mbala ya nsima ntango tokokuka yango.

     Lisusu, bato ya mayele bamoni ete mbala mingi baoyo batángaka na mikanda ya papye bakangaka makambo malamu mpenza. Babosanaka makambo yango te mpo emonani ete bayekolaki yango malamu.

     Toli ya Biblia: “Batelá bwanya ná likoki ya kokanisa.”​—Masese 3:21.

     Kanisá naino: Ezalaka mpasi mwana na yo akanga ntina to ayeba lisusu makambo oyo atángi to ayekoli? Soki bongo, ndenge nini okoki kosalisa ye abongisa mimeseno na ye ya koyekola? Kosalela mokanda ya papye nde ekoki kosalisa?

     Likanisi: Talelá mayele ya mwana na yo, kasi te oyo alingi. Bato balukaka komonisa ete batángaka malamu, ezala na papye ezala na telefone to tablɛti.

a Etuti na buku iGen.

b Euti na buku The Shallows.