Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kobɔkɔla bana

Ndenge ya kozala moboti malamu

Oyo baboti basengeli koyeba liboso ya kotinda bana na bango na esika oyo babatelaka bana

Omituna mituna minei mpo na koyeba soki kotinda mwana na esika oyo babatelaka bana ezali malamu mpo na mwana na yo.

Kozala moboti malamu esɛngaka nini?

Ndenge nini okoki kobɔkɔla bana malamu?

Mwana na ngai asengeli kozala na telefone?

Komituna mituna oyo mpo na koyeba soki yo ná mwana na yo bomibongisi mpo na mokumba.

Teyá bana ndenge malamu ya kosalela telefone

Ata mwana oyo ayebi teknoloji malamu asengeli kotambwisama na baboti na ye mpo na kosalela telefone na ndenge oyo ebongi.

Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka?​—Eteni ya 1: Kotánga buku to kotala filme?

Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana bátángaka lisusu mingi?

Mpo na nini ezali na ntina bana bátángaka​—Eteni 2: Kotánga na telefone to na mokanda ya papye?

Eleki malamu bana bátángaka na telefone to tablɛti to na mokanda ya papye? Nyonso ezali na malamu na yango.

Salisá bana na yo bámitungisaka te koleka ndelo mpo na bansango ya kobangisa

Baboti bakoki kosala nini mpo na kosalisa bana na bango bátika komitungisa koleka ndelo mpo na bansango?

Libota ya esengo​—Kozala ndakisa

Soki olingi ete bana na yo bándima makambo oyo olobaka, maloba na yo esengeli koyokana na makambo oyo osalaka.

Okosala nini soki mwana na yo azali ebɔsɔnɔ?

Talá mikakatano 3 oyo okoki kokutana na yango mpe ndenge oyo bwanya oyo ezali na Biblia ekoki kosalisa.

Formasyo

Ntina ya kosala misala ya ndako

Bokakatanaka mpo na kosalisa bana na bino misala ya ndako? Soki ezali bongo, bótala ndenge oyo kosalisa bana misala ya ndako ekoki kosalisa bango báyeba mikumba na bango mpe bázala na esengo.

Nasala nini soki mwana na ngai alɛmbi na ye?

Soki mwana na yo atikali na ndako mpe ayebi te asala nini, okoki kotalela mwa makambo oyo.

Kobɔkɔla bana na mokili oyo bato balukaka liboso bolamu na bango

Talá makambo misato oyo okoki kosala mpo na kosalisa bana na yo báboya koluka kaka matomba na bango moko.

Teyá bana na yo bámonisaka botɔndi

Ata bana oyo bazali bilenge bakoki koyekola koloba mersi ntango moto moko apesi bango eloko.

Kɔtisá na mitó ya bana na yo bizaleli ya malamu

Mwana na yo ayebi solo na makambo ya kosangisa nzoto? Talá mibeko ya Nzambe mpe makambo oyo osengeli koteya bana na yo.

Bizaleli malamu

Koteya bana na yo bizaleli malamu ekosalisa bango bázala bato oyo babongi ntango bakokóma mikolo.

Koteya bana bákokisaka mikumba na bango

Ndenge nini ndakisa ya Yesu ekoki kosalisa yo okóma moboti ya malamu?

Koyeba kotambwisa makambo

Na mbula nini mwana asengeli koyekola ndenge ya kotambwisa makambo, ntango azali naino moke to ntango akómi mokóló?

Ndenge ya kobɔkɔla mwana na yo

Kopesa disiplini elimboli kaka te kotya mibeko mpe kopesa etumbu.

Koyeba kokanga motema

Bana oyo bayebi kokanga motema bakómaka mpenza na makoki ya kolonga mikakatano na bomoi.

Ndenge ya kosalisa bana ntango balongi te na likambo moko

Kolonga te na likambo moko ekómelaka moto nyonso. Salisá mwana na yo alɛmba nzoto te ntango alongi te na likambo moko mpe ayeba ndenge akosala mpo na kobongisa likambo yango.

Ndenge ya kosalisa mwana na yo azwaka bapwɛ ya malamu na kelasi

Talá ndenge ya koyeba likambo mpenza oyo ezali kosala ete azwa bapwɛ ya mabe mpe lendisá ye ayekolaka.

Nasala nini soki batumoli mwana na ngai?

Makambo mitano ekoki kosalisa yo olakisa mwana na yo ndenge ya kosala na matumoli.

Kokumisa bana

Emonani ete lolenge moko ya kokumisa nde ebotaka mbuma malamu koleka.

Kosalisa mwana na eleko oyo abandi kokóma mwasi to mobali

Batoli mitano ya Biblia ekoki kosala ete eleko yango ya mpasi, ezala mpasi mingi te.

Soki mwana na yo atuni motuna etali liwa

Makambo minei oyo ekoki kosalisa yo oyanola na mituna na ye mpe komonisa ye ndenge ya kolonga mpasi oyo azali koyoka mpo na liwa ya moto moko oyo alingaka.

Ndenge nini bana bakoki koyekola kolinga Nzambe?

Okoki kosala nini mpo mateya ya Biblia esimba motema ya mwana na yo?

Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango makambo ya kosangisa nzoto?

Biblia ezali na batoli ya malamu oyo ekosalisa yo osolola na mwana na yo makambo ya kosangisa nzoto mpe obatela ye na bato oyo bakoki kosala ye mabe.

Koteya mwana makambo etali kosangisa nzoto

Bana bakómi komona makambo etali kosangisa nzoto ntango bazali naino mike mpenza. Osengeli koyeba nini? Okoki kosala nini mpo na kobatela bana na yo?

Sololáká na bana na yo makambo etali kosangisa nzoto

Ezali mpenza na ntina ete baboti básolola na bana na bango likambo etali kosangisa nzoto. Luká koyeba ndenge ya kolobela likambo yango na bana na yo atako ezalaka nsɔni.

Batelá bana na yo

Baboti ya Kalebe ná Sofia basalisi bango báyeba komibatela.

Kosolola na bana likambo etali masanga

Ntango nini mpe ndenge nini baboti basengeli kosolola na bango likambo wana ya ntina mingi?

Disiplini

Koteya mwana komipekisa

Kopesa mwana eloko nyonso oyo azali na yango mposa, ozali kopimela ye eloko moko oyo eleki ntina.

Teyá bana na yo ezaleli ya komikitisa

Teyá mwana na bino ezaleli ya komikitisa kozanga ete amimona ete azali na valɛrɛ te.

Kopesa bana disipilini

Kozala na makanisi ekeseni na likambo etali kopesa bana disiplini ekoki kobebisa kimya ya libota na yo. Talá oyo mwasi ná mobali bakoki kosala.

Ndenge nini bato bakómi kotalela disiplini?

Lelo oyo baboti bazali kolanda makanisi oyo bato ya mayele babimisaki na bambula ya 1960?

Ndenge osengeli kopesa bana disiplini nini?

Biblia elobeli makambo misato oyo esalaka ete disiplini ebota mbuma malamu.

Koteya bana kotosa

Yo ná mwana na yo bowelanaka ntango nyonso na makambo mpe emonani ete ye nde alongaka ntango nyonso? Batoli mitano oyo etali kobɔkɔla bana ekoki kosalisa yo.

Koyeba komipekisa

Mpo na nini komipekisa ezali na ntina, mpe ndenge nini tokoki kokóma na komipekisa?

Koyeba komikitisa

Kozala na komikitisa ekosalisa mwana na yo na bomoi sikoyo mpe na mikolo ezali.

Te na yo etikala kaka Te

Okosala nini soki mwana azali komilelalela mpo na komona soki okobongola ekateli na yo te?

Oyo okoki kosala ntango mwana akómi kosala matata

Okoki kosala nini soki mwana na yo azali kosala matata? Batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga mokakatano yango.

Ntango mwana na yo akosi

Osengeli kosala nini soki mwana na yo abuki lokuta? Lisolo oyo elobeli batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo oteya mwana na yo ete koloba solo ezali na ntina.