Lakisá makambo oyo ezali na kati

LISALISI MPO NA LIBOTA

Kosolola na bana likambo etali masanga

Kosolola na bana likambo etali masanga

“Mbala ya liboso oyo tosololaki na mwana na biso ya mwasi, azalaki na mbula motoba. Tokamwaki mpo ayebaki makambo mingi etali masanga koleka ndenge biso tozalaki kokanisa.”​—Alexander.

 Oyo osengeli koyeba

Kosolola na bana likambo etali masanga ezali na ntina. Kozela te tii ntango mwana akokóma elenge. Khamit, oyo afandaka na Russie, alobi boye: “Ebongaki tósolola na mwana na biso ya mobali likambo etali masanga ntango azalaki naino mwana mpenza. Nayebaki ntina ya kosala bongo nsima ya kokutana na mokakatano. Nayaki koyeba ete mwana na biso azalaki komɛla masanga mbala na mbala ntango azalaki na mbula 13.”

Mpo na nini osengeli kotyela yango likebi?

  • Baninga ya kelasi, bapiblisite mpe televizyo ekoki kotinda mwana na yo atalela masanga na ndenge oyo ebongi te.

  • Ebongiseli moko ya Amerika (U.S. Centers for Disease Control and Prevention), elobi ete na masanga nyonso oyo bato bamɛlaka na États-Unis, ndambo na yango (11%) bana oyo bakokisi naino mbula ya komɛla masanga te nde bamɛlaka yango.

Ezali likambo ya kokamwa te soki bakonzi oyo bakipaka makambo ya bokolongono ya nzoto basɛngi baboti báyebisaka bana na bango banda bomwana mpenza makama ya masanga. Ndenge nini okoki kosala yango?

 Oyo okoki kosala

Kanisá liboso mituna oyo mwana akoki kotuna yo. Bana mike balukaka koyeba nyonso kasi bana oyo bakoli mwa moke balukaka kutu koyeba mingi koleka. Na yango, ekozala malamu omibongisa liboso mpo na ndenge oyo okoyanola na mituna na bango. Na ndakisa:

  • Soki mwana alingi ayeba ndenge masanga ezalaka, okoki koloba na ye vinyo ezalaka mwa moke lokola mai ya ngai oyo bazwi na mbuma oyo bafini kasi biɛrɛ ezalaka mwa bololo.

  • Soki mwana alingi ameka masanga, okoki koloba na ye masanga ezali makasi mingi mpo na nzoto ya bana. Lobelá ndenge masanga esalaka na nzoto: Masanga ekoki kosala ete moto amiyoka malamu, kasi soki amɛli yango mingi ekoki kosala ye kizunguzungu mpe kotinda ye asala makambo ya bozoba mpe aloba makambo oyo ekopesa ye mawa na nsima.​—Masese 23:29-35.

Luká koyeba makambo etali masanga. Biblia elobi: “Moto nyonso ya ekɛngɛ akosala na boyebi.” (Masese 13:16) Luká koyeba ndenge ya kosalela masanga, mibeko mpe bandelo oyo mboka na bino etyá na likambo etali masanga. Yango ekosalisa yo oyeba ndenge ya kosalisa mwana na yo.

Zalá moto ya liboso ya kosolola na mwana likambo etali masanga. Mark, tata moko na Grande-Bretagne; alobi boye: “Likambo etali masanga ekoki kotya bana mobulu na motó. Natunaki mwana na ngai ya mobali ya mbula mwambe soki komɛla masanga ezali mabe to malamu. Nasalaki ete tósolola lokola baninga mpe yango esalisaki ye abimisa makanisi na ye polele.”

Okosimba mpenza motema ya mwana soki ozali kosolola na ye likambo etali masanga na mabaku mingi. Na kotalela mbula ya mwana, okoki kobakisa mpe masolo mosusu etali bomoi; na ndakisa kotosa mibeko ya nzela mpe makambo etali kosangisa nzoto.

Zalá ndakisa. Bana bazalaka lokola eponjɛ​—bamɛlaka nyonso oyo ezali zingazinga na bango—​bolukiluki emonisi ete bana bamekolaka mingi nde baboti na bango. Yango elingi koloba ete soki omɛlaka masanga mpo na kozwa kimya to kolongola mitungisi, mwana na yo akomona ete masanga nde solisyo mpo na mitungisi ya bomoi. Boye, zalá ndakisa malamu. Talá soki omɛlaka masanga na ndenge ebongi.

Bana bakolanda ndakisa na yo na likambo etali komɛla masanga