Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Batatoli ya Yehova

Lingala

Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango makambo ya kosangisa nzoto?

Ndenge nini baboti bakoki koteya bana na bango makambo ya kosangisa nzoto?

Eyano ya Biblia

Nani asengeli koteya bana makambo ya kosangisa nzoto? Biblia epesi mokumba yango epai ya baboti, mpe baboti mingi bamoni ete makambo oyo elandi esalisi bango mingi:

  • Koyoka nsɔni te. Biblia elobeli polele makambo ya kosangisa nzoto mpe enama ya mwasi to ya mobali. Mpe Nzambe ayebisaki Bayisraele ete basengeli mpe koteya “bana” makambo yango. (Kolimbola Mibeko 31:12; Balevi 15:2, 16-19) Mpo na kolobela makambo ya kosangisa nzoto mpe binama ya kobotela, salelá maloba ya bokonde mpo makambo yango ebima lokola makambo ya nsɔni te.

  • Lobeláká yango mokemoke. Ntango mwana na yo abandi kokóma elenge, na esika ya kolobela ye na mbala moko makambo nyonso oyo etali kosangisa nzoto, yebisáká ye nde makambo yango mokemoke ntango azali kokóma na mbula oyo akoki kokanga ntina na yango.​—1 Bakorinti 13:11.

  • Teyáká bana bizaleli ya malamu. Ekoki kozala ete na eteyelo bateyaka bana makambo ya kosangisa nzoto. Atako bongo, Biblia elendisi baboti báteya bana kaka makambo ya kosangisa nzoto te, kasi mpe bizaleli ya malamu mpe ndenge malamu ya kotalela makambo yango.​—Masese 5:1-23.

  • Yokáká mwana na yo. Kosilika te mpe kokanisela mwana na yo mabe te soki atuni yo mituna na makambo ya kosangisa nzoto. Kasi, osengeli nde “koyokaka noki, kowelaka koloba te.”​—Yakobo 1:19.

Ndenge ya kobatela mwana na bato oyo basangisaka nzoto na makasi na bana mike

Bólakisa mwana ndenge asengeli kosala soki balingi kokanga ye na makasi

  • Yo moko yebá ndenge bato yango basalaka. Luká koyeba soki bato yango basalaka ndenge nini mpo na kozwa bana.​—Masese 18:15; talá mokapo 32 ya buku Mituna oyo bilenge batunaka​—Biyano oyo ebongi, Volimi 1.

  • Yebáká makambo oyo mwana azali kokutana na yango. Kotika mwana na mabɔkɔ ya moto mosusu kaka boye te; luká koyeba soki azali mpenza moto ya konfianse, mpe kotika mwana te “asala oyo alingi.”​—Masese 29:15.

  • Teyá mwana ete asengeli te koyokela moto nyonso. Bana basengeli koyekola kotosa baboti na bango. (Bakolose 3:20) Kasi, soki oteyi mwana ete asengeli ntango nyonso koyokela moto nyonso oyo azali mokóló, moto mosusu akoki kobebisela yo mwana. Baboti oyo bazali bakristo bakoki koloba na bana na bango ete, “Soki moto ayebisi yo osala likambo oyo Nzambe alobi ete ezali mabe, kosala yango te.”​—Misala 5:29.

  • Lakisá ye ndenge akoki komibatela. Salisá mwana ayeba oyo asengeli kosala soki moto moko alingi akanga ye na makasi soki yo ozali te. Kolakisa ye yango lokola na teyatre ekoki kopesa mwana makasi ya koloba “Tiká! Nakofunda yo!” mpe ya kolongwa wana mbala moko. Kobosana te ete “osengeli kokɔtisa yango malamumalamu na kati ya mwana” mpo bana babosanaka noki.​—Kolimbola Mibeko 6:7.