Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 1

Koyeba komipekisa

Koyeba komipekisa

KOMIPEKISA ELIMBOLI NINI?

Komipekisa elimboli

  • koyeba kozela

  • koyeba kokanga bamposa mpe mayoki mosusu

  • kosilisa kosala likambo atako osepeli na yango te

  • koluka liboso bolamu ya basusu

MPO NA NINI KOMIPEKISA EZALI NA NTINA?

Bana oyo bazalaka na komipekisa bayebaka kokima komekama, ata soki likambo yango ekoki kopesa bango mwa esengo. Kasi, baoyo bazalaka na komipekisa te, bakoki kokóma:

  • bato ya mobulu

  • konyokwama na makanisi

  • baombo ya makaya, ya bangi, to ya masanga

  • bato ya bilyalya

Ankɛtɛ moko emonisi ete mbala mingi bana oyo bazalaka na komipekisa, ntango bakómi mikóló, bazalaka na mikakatano mingi te ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, ya mbongo, to ya kotosa mibeko ya mboka. Yango wana, profesɛrɛ Angela Duckworth ya iniversite ya Pennsylvanie alobaki ete komipekisa esalaka moto mabe te.

NDENGE YA KOTEYA BANA BÁYEBA KOMIPEKISA

Soki olobi “te,” ezala mpe kaka bongo.

TOLI YA BIBLIA: “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.”​—Matai 5:37.

Mpo na kozwa eloko nyonso oyo balingi mpe kobongola ekateli oyo baboti na bango bazwi, bana bakoki kolela makasi to kotya matata ata na miso ya bato. Soki moboti abongoli ekateli na ye, mwana akomona ete kolela to kotya matata nde lolenge ya malamu mpo na kozwa eloko oyo alingi.

Nzokande, soki “te” ya moboti ezali mpe kaka bongo, mwana akoyekola liteya moko ya monene mpo na bomoi: tokoki te ntango nyonso kozwa eloko oyo tolingi. Doktɛrɛ David Walsh alobi boye: “Likambo ya kokamwa, emonani ete bana oyo bayekolaka liteya yango bazalaka na esengo mingi. Ntango tozali koteya bana na biso ete bakoki kozwa eloko nyonso oyo balingi, tozali kosalisa bango te, kutu tozali nde kobebisa bango.” *

Soki ozali koboyela mwana na yo makambo mosusu, yango ekosalisa ye ayeba komipekisa soki akómi mokóló, na ndakisa, soki batye ye mbamba amɛla bangi, asangisa nzoto liboso ya kobala, to asala makambo mosusu ya mabe.

Salisá bana báyeba mbuma oyo misala na bango ekobimisa, ezala ya malamu to ya mabe.

TOLI YA BIBLIA: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

Mwana na yo asengeli koyeba ete nyonso oyo tosalaka ezalaka na lifuti na yango, mpe kozanga komipekisa ebimisaka mbuma mabe. Na ndakisa, soki mwana na yo ya mobali azalaka na momeseno ya kosilika mpambampamba ntango batumoli ye, basusu bakoki kokima ye. Nzokande, soki azali komonisa ezaleli ya komipekisa ntango batumoli ye, to soki azali na motema molai, bato bakosepela na ye. Salisá mwana na yo ayeba ete bomoi na ye ekozala malamu mingi koleka soki azali na komipekisa.

Teyá mwana na yo ayeba makambo oyo eleki ntina na bomoi.

TOLI YA BIBLIA: “Bóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.”​—Bafilipi 1:10.

Komipekisa ezali kaka te koboya kosala oyo ezali mabe; elimboli mpe kosala makambo oyo tosengeli kosala, atako tosepeli na yango te. Ezali na ntina ete mwana na yo ayeba makambo oyo eleki ntina na bomoi mpe atya yango na esika ya liboso. Na ndakisa, asengeli liboso kosala devuare na ye, mpe kosakana na nsima.

Zalá ndakisa malamu.

TOLI YA BIBLIA: “Napesi bino ndakisa, mpo, ndenge nasali bino, bino mpe bósalaka bongo.”​—Yoane 13:15.

Mwana na yo amonaka ndenge osalaka ntango likambo moko esepelisi yo te to epesi yo nkanda. Salisá mwana na yo amona ete komipekisa ebotaka mbuma ya malamu. Na ndakisa, ntango mwana na yo asali likambo moko ya mabe, ozalaka na komipekisa to osilikaka mbala moko?

^ par. 20 Euti na buku No: Why Kids​—of All Ages—​Need to Hear It and Ways Parents Can Say It.