Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Shɛni ya Satelite ya JW ekómi ata na bisika oyo Internet ezalaka te

Shɛni ya Satelite ya JW ekómi ata na bisika oyo Internet ezalaka te

01/04/2021

 Sanza nyonso, tozelaka na motema moko mpenza bilei ya elimo mpe bavideo oyo ebimaka na TV JW. Nzokande na Afrika, bandeko mingi balandaka te baprogrmɛ yango oyo ebimaka na nzela ya Internet. Mpo na nini?

 Mpo na bisika mingi na Afrika, Internet ezalaka te. Mpe na bisika oyo Internet ezali, mbala mingi esalaka malɛmbɛ mpenza mpe ezalaka ntalo mingi. Na ndakisa, na Madagascar, mokolo moko mokɛngɛli moko ya zongazonga akendaki na cyber café kozwa emisyo ya TV JW ya sanza moko. Afutaki dolare 16 mpo na kozwa yango. Nzokande na mboka wana, dolare 16 eleki mbongo oyo bato mingi bazwaka na pɔsɔ moko! a

 Atako bongo, likambo ya esengo ezali ete, sikoyo na Afrika, bato ebele mpenza bakómi na likoki ya kotala TV JW kozanga ete bákɔta na Internet. Na ndenge nini?

 Banda mobu 2017, bato oyo bafandaka na Afrika, na bikólo oyo ezali na nse ya esobe ya Sahara, batalaka TV JW na batelevizyo na bango na nzela ya shɛni ya satelite. Shɛni yango elakisaka ofele, mikolo nyonso, na minɔkɔ 16.

Na 2018, na Mozambique, bandeko bazali kobongisa antene mpo shɛni ya satelite ya JW ezwa na Ndako ya Bokonzi

 Mpo TV JW elakisaka bongo, Batatoli ya Yehova bayokanaka na bato oyo balekisaka makambo na TV mpe bafutaka bango mbongo mpo bálakisaka makambo ya TV JW na nzela ya satelite. Satelite yango elakisaka na mboka soki 35 na bikólo ya Afrika oyo ezali na nse ya esobe ya Sahara. Batatoli bafutaka mbongo koleka dolare 12 000 sanza na sanza mpo na yango. Na bantango mosusu, tobakisaka mbongo mosusu mpo bálakisa milulu mosusu ya ntina mingi na bashɛni mosusu. Yango epesaka bankóto ya bato nzela ya kolanda mayangani to baprogramɛ ya ntina mingi oyo esalemaka soki momonisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ayei kotala Betele.

Na 2018, na Malawi, bandeko oyo basalaka na biro ya kosala baplan ya bandako/Departema ya botongi bazali kotala shɛni ya satelite ya JW

 Bato mingi, ata baoyo bazali Batatoli ya Yehova te, batalaka shɛni ya satelite ya JW na batelevizyo na bandako na bango. Kasi, bandeko mosusu bazali na likoki te ya kosomba bisaleli oyo ebongi mpo na kotala Shɛni ya satelite yango. Mpo na kosalisa bango, totyá mwa bapareyi mosusu na Bandako ya Bokonzi koleka 3 670 mpo ezwaka makambo na satelite mpo bandeko bátalaka TV JW kuna. Soki Ndako ya Bokonzi moko ezali na televizyo na yango to projecteur, ekosɛnga soki dolare 70 mpo na kosomba mpe kokómisa bisaleli yango na Ndako ya Bokonzi. Kasi soki ezali na televizyo to projecteur te, mpo na kotya bisaleli nyonso wana, ekosɛnga mbongo dolare 530.

 Bandeko na biso bazali kosepela mingi mpenza na shɛni yango. Nkulutu moko na Cameroun alobi boye: “Mpo na libota na biso, shɛni yango ezali lokola mana oyo ezalaki kokita na esobe.” Odebode, ndeko moko na Nigeria, alobi boye: “Na libota na biso, totalaka yango mbala misato na pɔsɔ. Bana na ngai bazelaka ntango yango na esengo mpenza. Kutu, basɛngaka tótyaka mpe shɛni ya JW na mikolo mosusu.” Rose, ndeko mwasi moko kaka na Nigeria, alobi boye: “Nazali na esengo ya koloba ete, nakómá na mposa makasi ya kotala shɛni ya satelite ya JW na esika ya kotala bashɛni ya bansango, mpo nazaláká kolanda bansango mingi mpenza. Ntango nazalaki kolanda bansango na televizyo, makambo nazalaki kotala ezalaki kopesa ngai nkanda mpenza, mpe tension ezalaki komata ngai. Nzokande, TV JW epesaka ngai makasi mpe kimya! Natalaka yango koleka bashɛni nyonso. Ezali likabo ya malamu mpenza oyo Yehova apesi biso.”

Na Malawi, libota moko bazali kotala bavideo ya bana na shɛni na biso ya satelite

 Mokɛngɛli ya zongazonga moko na Mozambique alobi ete na zongazonga na ye, Bandako ya Bokonzi ezali na bisaleli yango oyo batyá mpo ezwaka shɛni ya satelite. Bandeko ya masangá yango, bakómaka na Bandako ya Bokonzi ngonga moko to koleka liboso makita ebanda mpo bátalaka TV JW na nzela ya satelite.

Na 2018, na Éthiopie, bandeko bazali kotala emisyo ya sanza ya TV JW, kozanga kosalela Internet

 Na mobu 2019, na liyangani oyo esangisaka mikili mingi oyo esalemaki na Johannesbourg, na Afrique du Sud, basalelaki mpe ebongiseli yango mpo na kolakisa, na bisika libwa, badiskur ya ntina mingi ná badiskur oyo ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi asalaki. Ndeko Sphumelele, oyo asalaka na Departema ya audio/video na Betele ya Afrique du Sud, alobi boye: “Liboso, tozalaki kolekisa badiskur ya boye na nzela ya Internet. Yango esɛngaka kosomba bamega mpe Internet ezala malamu mpenza. Shɛni ya satelite ya JW ezali kosalisa mpo tóbomba mbongo mpe ezali malamu mingi.”

 Na lisalisi ya makabo oyo ozali kopesa mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba, bandeko mingi na Afrika bazwi likoki ya kotala TV JW na nzela ya satelite. Bandeko, topesi bino matɔndi mingi mpenza na ndenge bozali kopesa makabo na lisalisi ya mayele ndenge na ndenge oyo ezali na donate.jw.org.

a Mbongo ya dolare oyo tolobeli na lisolo oyo ezali dolare ya États-Unis.