Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo wapi mpo na misala na bango?

Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo wapi mpo na misala na bango?

 Mbongo oyo tosalelaka misala na biso na mokili mobimba eutaka libosoliboso na makabo oyo Batatoli ya Yehova bapesaka na bolingo na bango moko. a Na bisika na biso ya losambo ezalaka na bakɛsi ya makabo, mpe lolenge mosusu ya kopesa makabo emonisami na lokasa ya Makabo. Lokasa yango ezali na esika oyo moto akoki kopona mpo na kopesa makabo mpo na kosunga mosala na mokili mobimba, mpo na misala ya lisangá, to mpo na nyonso mibale.

 Basɛngaka Batatoli ya Yehova dîme te to motángo moko boye ya mbongo na lifuti oyo bazwaka. (2 Bakorinti 9:7) Tokɔngɔlaka mabonza te mpe tosɛngaka moto mbongo te liboso akɔta na makita na biso, lisusu bato oyo bapesaka bato batisimo, oyo basalaka diskur soki moto akufi to ya libala, ezala mpe misala mosusu bafutaka bango mbongo te. Tosalaka mombongo te mpo na kozwa mbongo mingi, to masano ya mbongo, mpe tosɛngaka moto te na makasi atya makabo. Totyaka te bankombo ya bato oyo batye makabo na esika oyo moto nyonso akoki komona. (Matai 6:2-4) Basite Internet mpe mikanda na biso ezalaka te na bapiblisite mpo na kozwa mbongo.

 Masangá nyonso ya Batatoli ya Yehova epesaka lapolo ya mbongo oyo esalelaki na boumeli ya sanza na makita oyo moto nyonso akoki kokɔta. Batalelaka mbala na mbala lapolo ya kɔnti ya lisangá mpo na komindisa ete makabo oyo bandeko bapesaka ezali kosalelama na ndenge oyo ebongi.​—2 Bakorinti 8:20, 21.

Ndenge ya kopesa makabo

  •   Bakɛsi ya makabo: Okoki kopesa makabo ya mbongo na nzela ya chèque to kotya mbongo na bakɛsi ya makabo oyo ezalaka na Bandako ya Bokonzi, na bandako ya mayangani to na bisika mosusu oyo tosalaka losambo na biso.

  •   Kopesa makabo na nzela ya Internet: Na bikólo mingi, okoki kosalela lokasa “Makabo mpo na Batatoli ya Yehova” mpo na kopesa makabo na nzela ya karte ya kredi, karte ya banki, kotinda mbongo na nzela banki, to lolenge mosusu ya kopesa likabo na nzela ya Internet. b Batatoli ya Yehova mosusu bamonaka malamu ‘bábomba mwa eloko pembeni’ sanza na sanza mpo na kopesa likabo na kotalela ndenge oyo babongisá mpo na kopesa yango.​—1 Bakorinti 16:2.

  •   Kopesa likabo oyo ebongisami liboso: Lolenge mosusu ya kopesa likabo esɛngaka kobongisa yango liboso to kozwa lisalisi ya avoka to notaire. Kobongisa makambo ndenge wana ekoki kosalisa mpo ofuta mpako mingi te na ekólo na bino. Bato mingi bazwá matomba ntango bayaki koyeba malamu mpenza makambo etali mbongo oyo moto akoki kopesa na bibongiseli oyo esungaka bato ntango azali naino na bomoi to oyo akoki koloba ete ebongiseli moko esalela yango nsima ya liwa na ye. Tósɛngi yo osolola na biro ya Batatoli ya Yehova na esika oyo ofandi mpo na makambo mingi oyo etali kopesa makabo na:

    •   kɔnti ya banki

    •   mbongo ya asiranse mpe ya pasyɔ

    •   kopesa ndako to lopango

    •   lotomo ya kozwa mosolo

    •   testama

 Mpo na koyeba makambo mosusu mpo na oyo etali ndenge ya kopesa makabo na esika oyo ofandi, talá lokasa “Makabo mpo na Batatoli ya Yehova.”

a Bato mosusu mpe oyo bazali Batatoli ya Yehova te basepelaka kopesa makabo mpo na kosunga mosala na biso.

b Talá video Ndenge ya kotinda makabo na nzela ya site Internet na biso mpo na koyeba makambo mosusu.