Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NDENGE OYO MAKABO NA YO ESALELAMAKA

Bibliotɛkɛ oyo okoki komema na lobɔkɔ

Bibliotɛkɛ oyo okoki komema na lobɔkɔ

01/09/2021

 “Na ntango ya kala, totikalaki soki moke te kokanisa ete tokobanda kozwa bilei ya elimo na nzela ya baaparɛyi na biso.” Yango ezalaki moko ya makambo oyo ndeko Geoffrey Jackson alobelaki na diskur na ye ya kolendisa na Lapolo ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi No. 6 ya 2020. Abakisaki boye: “Mbala mosusu tokokaki kokanisa, soki JW Library ezalaka te ndenge nini tokoki kosala mpo na kozwa bilei ya elimo na ntango oyo ya coronavirus? Yehova banda kala, azalaki kobongisa biso mpo na makambo lokola oyo.”

 Ndenge nini Yehova azali kobongisa biso? Makambo nini esɛngaki mpo na kosala programɛ lokola JW Library, mpe esɛngaka nini mpo na kobatela yango mpe kokómisa yango lisusu kitoko mpo na kosalela?

Esaleli moko oyo ekokani na mosusu te

 Na sanza ya 05/2013, Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaki departema oyo elandelaka makambo ya MEPS, oyo ezali na biro monene, ebongisa esaleli moko oyo ekozala na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo ebongisami lisusu. Ndeko Paul Willies oyo asalaka na departema oyo elandelaka makambo ya MEPS, alobi boye: “Naino tobimisá te programɛ moko mpo na kosalela na baaparɛyi. Ata bongo, tobongisaki ekipi moko, mwa misala mosusu ya kosala, mpe tosalaki elongo na badepartema mosusu mpo na kosala programɛ yango mpe biloko oyo ekozala na kati. Tozalaki kobondela mbala mingi, mpe na lisalisi ya Yehova, programɛ yango ebimaki basanza mitano na nsima, ezalaki na likita ya nsuka ya mbula!”

 Likambo mosusu ya mpasi ezalaki ya kosala ete JW Library ekóma mpenza bibliotɛkɛ oyo ezali na mikanda na minɔkɔ ebele. Kobanda na sanza ya 01/2015, mikanda mingi ya sika na Anglais ebimaki na JW Library, mpe kaka basanza 6 na nsima, ebimaki mpe na minɔkɔ mosusu.

 Kobanda ntango wana, bandeko na biso babongisi lisusu esaleli yango na lolenge mingi, na ndakisa, babakisaki bavideo, basangisaki mikanda nyonso na eteni kaka moko mpe bavideo ya makita, mpe basalaki ete moto azala na likoki ya kokɔta na Buku ya bolukiluki mbala moko na nzela ya vɛrsɛ moko ya Biblia.

Ndenge ya kobatela JW Library mpo esala malamu

 Mikolo nyonso, JW Library esalelamaka na baaparɛyi milio 8 mpe na baaparɛyi koleka milio 15 sanza nyonso! Mosala nini esalemaka mpo programɛ yango ekoba kosala malamu na baaparɛyi wana nyonso? Ndeko Willies alobi boye: “Kosala programɛ lokola oyo, ezali mosala oyo esilaka mbala moko te. Esɛngaka mbala na mbala kobakisa biloko ya sika mpo na kosalisa bato básepela lisusu kosalela yango. Lokola teknoloji ezali kokɔla se kokɔla, yango wana tosengeli mbala na mbala kobongisa programɛ yango mpo eyokana na teknoloji ya sika. Tosengeli mpe kolandelaka programɛ babengi logiciel interne na biso lokola mikanda, bavideo mpe audio ezali kokóma mingi na JW Library.” Soki tosangisi minɔkɔ nyonso, JW Library ezali sikoyo na mikanda soki 200 000, mpe bavideo ná ba-audio koleka 600 000.

 Mpo na kobatela programɛ JW Library, esuki kaka te na kozala na bisaleli ya informatique. Esɛngaka mpe kosomba ba-licence. Licence kaka moko esɛngaka dolare 1 500 na mbula moko. Longola yango, mpo na koyeba kaka soki JW Library ekokoba kosala malamu na ba-ordinatɛrɛ, batablɛti mpe baaparɛyi ya sika oyo ezali kobima, departema oyo elandelaka programɛ ya MEPS ebimisaka mbongo pene na dolare 10 000.

Kozwa mikanda na nzela ya Internet esali ete tóbatela makabo ya bandeko

 JW Library esalisi biso mingi mpo tóbimisa mbongo mingi te na konyata mikanda, kokangisa yango mpe kotinda yango bisika mosusu. Tózwa ndakisa ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Na 2013, tonyataki mwa buku yango soki milio 12. Kasi na 2020, tonyataki yango kaka milio 5, nzokande basakoli soki 700 000 babakisamaki na mokili mobimba. Mpo na nini mbongwana wana esalemaki? Mpamba te, bandeko mingi bazali sikoyo kotánga mwa buku yango na JW Library. a

Esaleli oyo “ezali na motuya mingi”

 JW Library ezali kosalisa bato na lolenge mingi. Geneviève, oyo afandaka na Canada, amonisi ete JW Library esalisi ye akóma koyekola mbala na mbala. Alobi boye: “Soki esɛngaki nasangisaka ntɔngɔ nyonso mikanda oyo nasengeli na yango mpo na koyekola, nakanisi nalingaki kolonga te koyekolaka ntɔngɔ nyonso. Kasi na nzela ya JW Library, nyonso oyo nazali na mposa na yango ezali na kati. Mpe koyekola mbala na mbala ekómisi kondima na ngai makasi mpe esalisi ngai nakómisa makasi boyokani na ngai ná Yehova.”

Geneviève

 Programɛ yango esalisi biso lisusu mingi na eleko ya maladi mabe oyo ya coronavirus. Charlyn, oyo afandaka na États-Unis alobi boye: “Ndenge coronavirus epanzani na mokili mobimba, esali mbula koleka moko namonaka lisusu mikanda ya sika ya papye te. Kasi na nzela ya JW Library tozali kolya malamu na elimo, mpe nazali kopesa Yehova matɔndi mpo na ebongiseli oyo ya bolingo.”

 Faye, oyo afandaka na Philippines, amonisi mayoki oyo bato mingi mpe bazali na yango, alobi boye: “Ezali mpenza likambo ya kokamwa, nakoki kosala makambo na ngai nyonso ya elimo kaka na JW Library. Ezali eloko ya liboso nafongolaka ntɔngɔ nyonso. Yango nde nayokaka ntango nazali kosala misala ya ndako. Yango nde nasalelaka mpo na kobongisa makita mpe boyekoli ya Biblia. Nasalelaka yango mpo na kotala bavideo ntango nazali na eloko ya kosala te. Lisusu nasalelaka yango mpo na kotánga Biblia mpe masolo mosusu ntango nazali kozela kosala likambo moko. Ezali mpenza na motuya mingi.”

 JW Library ezali mpe na ntina mingi na mosala ya kosakola. Na ndakisa, na Cameroun, ndeko mwasi moko na mosala ya kosakola, alingaki kotánga vɛrsɛ moko oyo ndeko mwasi mosusu atángaki mwa bapɔsɔ liboso. Kasi azalaki koyeba vɛrsɛ yango lisusu te. Alobi boye: “Likambo ya esengo, nayebaki liloba moko ya vɛrsɛ yango. Nafongolaki JW Library, nakɔtaki na Biblia mpe nalukaki liloba yango. Mbala moko namonaki vɛrsɛ yango. Na nzela ya JW Library, nakoki komona na pɛtɛɛ nyonso mikapo mingi ya Biblia oyo ekimaka ngai.”

 Makabo ya bolingo oyo opesaka na kolanda ndenge esɛngami na donate.jw.org esalisisaka biso tóbatela mpe tóbongisa mbala na mbala programɛ JW Library mpo esalisa bandeko na mokili mobimba. Matɔndi mingi mpo na makabo na yo.

Lisolo ya JW Library

  1. Sanza ya 10/2013—JW Library ebimaki mpe ezalaki na Biblia​—Libongoli ya mokili ya sika oyo babongisi lisusu

  2. Sanza ya 01/2015—Babakisaki mikanda mosusu na Anglais mpe na minɔkɔ mosusu

  3. Sanza ya 11/2015—Babakisaki balangi mpo na kotya bilembo na makomi

  4. Sanza ya 05/2016—Babakisaki eteni makita

  5. Sanza ya 05/2017—Babakisaki bisika ya kotya banɔti

  6. Sanza ya 12/2017—Babakisaki Biblia ya boyekoli na Anglais

  7. Sanza ya 03/2019—Babakisaki makambo lokola: kozwa, kotala to koyoka bavideo mpe audio, mpe lisusu kosalela Buku ya bolukiluki

  8. Sanza ya 01/2021​—Babakisaki makambo ya sika na buku Sepelá na bomoi libela na libela!

a Ntango nyonso tozwaka mokanda, video to mpe audio na JW Library esɛngaka kofuta mwa mbongo. Na ndakisa, mbula eleki, tobimisaki dolare koleka 1 500 000 mpo na kotya mikanda mpe bavideo oyo bato bakoki kozwa na site jw.org mpe na JW Library. Soki totaleli mbongo oyo ezalaki kobima mpo na kobimisa mikanda, ba-CD mpe ba-DVD, mpe kotinda yango na bisika mosusu, tokoloba ete sikoyo tozali kobimisa mbongo moke mpenza, ndenge tozali kobimisa mikanda mpe bavideo oyo bato bakoki kozwa na nzela ya Internet.