Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 65

Kende liboso!

Kende liboso!

(Baebre 6:1)

  1. 1. Ɛɛ, kende liboso, kolá n’elimo!

    Ngɛngisáká pole bato bámona solo.

    Bongisá ndenge na yo ya koteya;

    Tyá motema n’o na Yah.

    Moto nyonso’akoki koteya.

    Wana mosala Yesu’asalá.

    Talelá Yehova mpo okwea te,

    Otikala sembo nde.

  2. 2. Ɛɛ, kende liboso, zalá molende!

    Panzá nsango malamu, kopona moto te.

    Yak’okumisa Yah yo ná bandeko,

    Teyá ndako na ndako.

    Banguna bakosepela te,

    Kasi yo kozonga nsima te.

    Lobá Bokonzi’a Nzamb’ekómi pene.

    Bakisá mpe molende.

  3. 3. Ɛɛ, kende liboso, mpe kolɛmba te.

    Kolisá mayele,

    mosal’eza’ ebele.

    Tik’elimo ya Nzambe ekamba yo.

    Akosepelisa yo.

    Mot’oza’ koteya, lingá ye.

    Zongá osimba motema n’e.

    Salisá ye akola, alinga Yah,

    Nde pole ekongɛnga.