Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | MASESE 7-11

“Motema na bino ebaluka te”

“Motema na bino ebaluka te”

Mateya ya Yehova ekoki kobatela biso. Kasi, mpo tózwa bolamu yango, tosengeli mpenza kolinga yango na mitema na biso. (Mas 7:3) Soki mosaleli ya Yehova atiki motema na ye ebaluka, akoumela te kokosama na mayele mabe ya Satana. Masese mokapo 7 elobeli elenge mobali moko oyo atikaki motema na ye ekosa ye. Mabunga oyo asalaki ekoki koteya biso nini?

  • Mpo na kokabola biso na Yehova, Satana asalelaka biyokeli mitano ya nzoto na biso (miso, matoi, zolo, lolemo, loposo) mpo na kotinda biso tósala mabe

  • Bwanya mpe mayele ekosalisa biso tósosola makama ya kosala makambo ya mabe mpe tókima likama ya elimo