Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge ya kokabola mikanda

Ndenge ya kokabola mikanda

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI

Motuna: Mpo na yo, likabo nini oyo eleki makabo nyonso oyo Nzambe apesá biso?

Vɛrsɛ: Yn 3:16

Okoki koloba boye: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo emonisi ntina oyo Nzambe atindaki Yesu na mabele mpo akufela biso mpe ndenge tokoki komonisa botɔndi mpo na likabo yango.

BOKONZI YA NZAMBE EZALI NINI?

Motuna: [Lakisá ye trakte yango.] Eyano nini okopesa na motuna oyo? Bokonzi ya Nzambe ezali eloko moko na kati ya motema na yo? maloba ya elilingi? to boyangeli moko na likoló?

Vɛrsɛ: Da 2:44; Yis 9:6

Okoki koloba boye: Trakte oyo emonisi bolamu oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa yo.

LOKASA YA LIBYANGI YA EKANISELI

Okoki koloba boye: Tozali kobengisa bato na molulu moko ya ntina mingi. [Pesá ye lokasa ya libyangi] Na mwa 11 ya sanza ya minei, bamilio ya bato na mokili mobima bakoyangana mpo na kokanisa liwa ya Yesu mpe koyoka lisolo moko ya Biblia oyo ekolobela ntina ya liwa yango mpo na biso. Na lokasa yango, tokomi adrɛsi mpe ngonga oyo likita yango ekosalema pene na bino. Tozali na elikya ete okoya.

KOMÁ MALOBA NA YO MOKO

Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.