Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Salisá bato ya libota na yo bábosana Yehova te

Salisá bato ya libota na yo bábosana Yehova te

Yehova atindaki Yirimia akebisa Bayuda ete libebi ekoyela bango mosika te mpo babosanaki Ye, Nzambe na bango. (Yir 13:25) Nini esalaki ete bato ya ekólo yango bábosana Yehova? Mabota ya Bayisraele ezalaki na boyokani malamu te na Nzambe. Emonani ete batata ya mabota bazalaki te kolanda malako ya Yehova oyo ezali na Kolimbola Mibeko 6:5-7.

Mabota oyo ezali na boyokani malamu na Nzambe nde esimbaka masangá lelo oyo. Batata bakosalisa bato ya mabota na bango bábosana Yehova te soki bazali kosala pɔsɔ na pɔsɔ Losambo na kati ya libota, oyo eyokani mpenza na mposa ya libota. (Nz 22:27) Nsima ya kotala video Maloba oyo . . . Esengeli kozala na motema na yo”—Mituna-lisolo na mabota, yanolá na mituna oyo:

  • Mabota mosusu esalaki nini mpo kolonga makambo oyo epekisaka losambo na kati ya libota?

  • Wapi mwa matomba ya kosala pɔsɔ na pɔsɔ Losambo na kati ya libota, oyo eyokani mpenza na mposa ya libota?

  • Na oyo etali losambo na kati ya libota, mikakatano nini nazali na yango, mpe ndenge nini nakani kosilisa yango?