Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Liteya nini tokoki kozwa na ndenge Biblia elobi ete ntoma Petro afandaki elongo na mobongisi-mposo ya nyama liboso akende epai ya Korneyi?

Lisolo ya Misala elobi ete Petro afandaki na Yope “na boumeli ya mikolo mwa mingi . . . elongo na Simo moko boye, mobongisi-mposo ya nyama,” oyo azalaki “na ndako pene na mbu.” (Misala 9:43; 10:6) Bayuda bazalaki komona mosala ya kobongisa mposo ya nyama ete ezali mbindo mpe bazalaki kotyola yango. Talmud etyaki babongisi-mposo ya nyama na nse ya bato oyo bazalaki kolɔkɔta nyɛi ya banyama. Mosala ya Simo esalaki ete asimbaka banyama oyo ekufi mbala na mbala; yango elingi koloba ete na kolanda mibeko asengelaki kozala mbindo ntango nyonso. (Balevi 5:2; 11:39) Babuku ndenge na ndenge oyo elobeli likambo yango emonisi ete ekoki kozala ete Simo azalaki kosalela mai ya mbu na mosala na ye, mpe emonani ete esika na ye ya mosala ezalaki na nsuka ya engumba, mpamba te kobongisa mposo ya nyama ezalaki “kobimisa nsolo mabe.”

Atako bongo, Petro aboyaki te kofanda epai ya Simo. Yango emonisi ete mbala mosusu Petro azwaki liteya na likambo etali koboya kokanisela mabe, bato oyo bazalaki kotalelama mbindo ndenge kaka Yesu asalaki yango na miso na ye, likanisi oyo epalanganaki mingi epai ya Bayuda.​—Matai 9:11; Luka 7:36-50.

Maloba ya Yesu oyo ete “yo moko olobi yango,” elimboli nini?

Ntango Kaifa, nganga-nzambe monene ya Bayuda alapisaki Yesu ndai mpo aloba polele soki azalaki Kristo Mwana ya Nzambe, Yesu ayanolaki ete: “Yo moko olobi yango.” (Matai 26:63, 64) Yesu alingaki koloba nini?

Yesu azalaki koluka kokima motuna ya Kaifa te. Emonani ete maloba “yo moko olobi yango” ezalaki lolenge moko ya kondima ya Bayuda, oyo emonisaki ete likambo ezali solo. Na ndakisa, Talmud ya Yerusaleme, buku moko ya Bayuda oyo ekomamaki na siɛklɛ ya minei ya ntango na biso, elobi mpo na mobali moko Moyuda oyo ayanolaki boye ntango batunaki ye soki rabi moko akufi, alobaki ete: “Yo olobi yango.” Yango emonisaki ete andimi ete rabi wana akufaki.

Yesu ayebaki ete nganga-nzambe monene azali na bokonzi ya kolapisa ye ndai mpo aloba solo. Lisusu, soki Yesu atikalaki nyɛɛ, yango elingaki komonisa lokola awangani ete azali Kristo. Na yango, eyano ya Yesu ete “Yo moko olobi yango” emonisaki ete andimi maloba ya nganga-nzambe monene. Na lisolo ya Marko oyo elobeli mpe likambo yango, elobi ete ntango Kaifa atyaki ye mbamba mpo amonisa soki ye nde Masiya, na mpiko nyonso Yesu azongisaki ete: “Ezali ngai.”​—Marko 14:62; talá mpe Matai 26:25 mpe Marko 15:2.

[Elilingi na lokasa 18]

Esika ya kobongisa mposo ya nyama na engumba Fez, na Maroc