Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Lokola Yehova apekisaki losambo ya bikeko, mpo na nini apesaki Arona etumbu te ndenge asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo?

Ntango Arona asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo, ndenge Kobima mokapo 32 emonisi yango, abukaki mobeko ya Nzambe na likambo etali losambo ya bikeko. (Kob. 20:3-5) Mpo na yango, “Yehova asilikelaki [Arona] kino alingaki koboma ye; kasi [Moize abondelaki] mpe mpo na Arona na ntango yango.” (Mib. 9:19, 20) Lilɔmbɔ ya Moize, moto ya boyengebene ezalaki na “bokasi mingi” na likambo oyo Arona asalaki? (Yak. 5:16) Ee. Mpo na malɔmbɔ ya ndenge wana mpe mpo na bantina mosusu soki mibale, emonani ete Yehova ayanolaki libondeli ya Moize mpe mpo na lilɔmbɔ wana, apesaki Arona etumbu te.

Emonani ete ntina ya liboso etalelaki bosembo ya Arona. Ntango Nzambe atindaki Moize epai ya Farao mpo abimisa Bayisraele na Ezipito, Yehova aponaki Arona akende elongo na Moize mpe azala molobeli na ye. (Kob. 4:10-16) Na botosi nyonso, mibali yango mibale bakendaki epai ya Farao mokonzi ya Ezipito mbala ebele, mpe bayokaki mpasi mpo na motó makasi ya Farao. Na yango, ntango bazalaki naino na Ezipito, Arona ayebanaki lokola moto ya bosembo oyo akangamaka mpenza na mosala ya Yehova.​—Kob. 4:21.

Tótalela mpe likambo oyo etindaki Arona asala ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo. Moize aumelaki na Ngomba Sinai mikolo 40. Ntango “bato bamonaki ete Moize aumeli na ngomba, azali kokita te,” bandimisaki Arona asalela bango ekeko ya losambo. Arona andimaki mpe asalaki ekeko ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo. (Kob. 32:1-6) Kasi, makambo oyo Arona asalaki na nsima, emonisi ete andimaki te losambo wana ya bikeko. Emonani ete andimaki kosala ekeko yango mpo batyaki ye mpanzi likoló. Na ndakisa, ntango Moize asukisaki likambo yango ya losambo ya bikeko, bana nyonso ya Levi, ata mpe Arona, bakangamaki na ngámbo ya Yehova. Bato nkóto misato oyo basimbaki mpenza losambo yango ya bikeko, babomamaki.​—Kob. 32:25-29.

Na nsima, Moize ayebisaki bato ete: “Bosali lisumu, lisumu moko monene.” (Kob. 32:30) Na yango, kaka Arona te nde azalaki na ngambo mpo na likambo yango ya mabe. Yehova amoniselaki ye ná bato mosusu motema mawa monene.

Nsima ya likambo wana, Yehova asɛngaki ete Arona atyama nganga-nzambe monene. Nzambe alobaki na Moize boye: “Osengeli kolatisa Arona bilamba mosantu mpe kotya ye mafuta mpe kosantisa ye, bongo asengeli kosalela ngai mosala ya nganga-nzambe.” (Kob. 40:12, 13) Emonani ete, Yehova alimbisaki Arona mpo na bolɛmbu na ye. Na kati ya motema, Arona azalaki moto ya sembo oyo azalaki mpenza kosimba losambo ya solo, kasi te motomboki oyo asambelaki ekeko.