Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobá kosalela makoki na yo ya kososola

Kobá kosalela makoki na yo ya kososola

 Kobá kosalela makoki na yo ya kososola

EZALAKA mpenza esengo komona moto oyo ayebi ngalasisi malamu azali kosala yango! Biblia elendisi bakristo básalela makoki na bango ya kokanisa ndenge kaka moto ya ngalasisi asalelaka makoki na ye.

Na mokanda na ye epai ya Baebre, ntoma Paulo akomaki boye: “Bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli, baoyo, makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesana kokesenisa ná mabe ná malamu.” (Ebr. 5:14) Mpo na nini Paulo alendisaki bakristo Baebre básalela makoki na bango ya kokanisa ndenge kaka moto ya ngalasisi akembisaka nzoto na ye? Ndenge nini tokoki kosalela makoki na biso ya kososola?

“Bosengeli nde kozala bateyi”

Ntango alimbolaki ete Yesu azali “nganga-nzambe monene lokola Melekisedeke,” Paulo akomaki boye: “Tozali na makambo mingi ya koloba mpo na ye [Yesu] mpe kolimbola yango ezali mpasi, mpo bokómi matoi mangbongi. Mpo, ya solo, na kotalela ntango oyo bolekisi, bosengelaki nde kozala bateyi, kasi bozali lisusu na mposa moto moko ateya bino, banda na ebandeli, mateya ya ebandeli ya maloba mosantu ya Nzambe; mpe bokómi lokola moto oyo azali na mposa ya mabɛlɛ, kasi ya bilei ya makasi te.”​—Ebr. 5:10-12.

Emonani ete bakristo mosusu ya ekeke ya liboso oyo bazalaki Bayuda, bakolaki te na boyebi mpe bakendeki liboso te na elimo. Na ndakisa, ezalaki mpasi mpo na bango bándima pole oyo ezalaki kobakisama na likambo etali Mibeko mpe kokatama ngenga. (Mis. 15:1, 2, 27-29; Gal. 2:11-14; 6:12, 13) Bamosusu bazalaki na mokakatano mpo na kotika mimeseno oyo ezalaki na boyokani na sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ mpe mokolo ya kozipa masumu. (Kol. 2:16, 17; Ebr. 9:1-14) Na yango, Paulo alendisaki bango básalela makoki na bango ya kososola mpo báyeba kokesenisa malamu ná mabe mpe ayebisaki bango ‘bákóma bato oyo bakɔmɛli.’ (Ebr. 6:1, 2) Toli na ye esalisaki bamosusu bákanisa na lolenge oyo bazalaki kosalela makoki na bango ya kokanisa mpe na ntembe te esalisaki bango bákola na elimo. Bongo biso?

Salelá makoki na yo ya kososola

Ndenge nini tokoki kosalela makoki na biso ya kokanisa mpo tókóma bato oyo bakɔmɛli na elimo? Paulo alobaki ete ‘kosalela yango.’ Ndenge moko na bato ya ngalasisi, oyo bakembisaka nzoto na bango mpo na kosalaka masano nyonso ya ngalasisi malamu ata ngalasisi ya mpasi, biso mpe tosengeli kosalelaka makoki na biso ya kokanisa mpo na kokesenisa malamu ná mabe.

John Ratey, profɛsɛrɛ ya makambo ya motó na eteyelo moko ya minganga na Harvard, alobi boye: “Kosalelaka [makanisi] ezali lolenge kaka moko oyo eleki malamu ya kosala mpo na bɔngɔɔ na yo.” Mpo na Gene Cohen, mokambi ya ebongiseli moko oyo etalelaka bobange, bokɔlɔngɔ mpe bizaleli malamu na Iniversite ya George Washington, “ntango tosalisi bɔɔngɔ na biso mosala makasi, baselile na yango ekoki kobimisa matomba mosusu mingi.”

Na yango, tokomonisa bwanya soki tosaleli makoki na biso ya kokanisa mpe tobakisi boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe. Soki tosali bongo, tokozala na nyonso oyo ebongi mpo na kosala ‘mokano ya Nzambe oyo ezali ya kokoka.’​—Rom. 12:1, 2.

 Kolisá mposa mpo na “bilei ya makasi”

Soki tolingi ‘kokóma bato oyo bakɔmɛli,’ tosengeli komituna boye: ‘Boyebi na ngai ya solo ya Biblia ezali mpenza kokola? Basusu bamonaka ngai mpenza lokola moto oyo akɔmɛli na elimo?’ Mama azalaka na esengo ya komɛlisa mwana na ye mabɛlɛ mpe kopesa ye bilei ya bana ntango azali naino bebe. Kasi, kanisá ndenge akomitungisa soki wana bambula ezali koleka, mwana yango azali kolya bilei ya makasi te. Ndenge moko, tosepelaka komona moto oyo tozali koyekola na ye Biblia akoli tii amipesi mpe azwi batisimo. Kasi, ekozala boni soki moto yango na nsima, azali kokola te na elimo? Likambo yango ekopesa biso mpasi te na motema? (1 Ko. 3:1-4) Molakisi azalaka na elikya ete na ntango oyo ebongi, moyekoli ya sika akokóma mpe moteyi.

Kosalela makoki na biso ya kososola esɛngaka komanyola, mpe yango esɛngaka kosala milende. (Nz. 1:1-3) Tosengeli te kopesa nzela na makambo lokola kotala televizyo, to makambo mosusu oyo esɛngaka te kokanisa mingi ete epekisa biso kokanisa na makambo oyo eleki ntina. Mpo na kokolisa makoki na biso ya kokanisa, ezali na ntina ete tózwa mpe tókokisa mposa ya koyekola Biblia mpe mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45-47) Longola programɛ ya kotángaka Biblia, ezali na ntina ete tózala mpe na ntango mpo na losambo na libota mpe koyekolaka masolo mosusu ya Biblia na mozindo.

Jerónimo, mokɛngɛli-motamboli moko na Mexique, alobaki ete ayekolaka nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ntango kaka azwi yango. Abombaka mpe ntango ya koyekola elongo na mwasi na ye. Jerónimo, alobi ete: “Ngai ná mwasi na ngai tozali na momeseno ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo, mpe tosalelaka mikanda lokola ‘Voyez le bon pays.’ Ndeko moko na nkombo Ronald, alobi ete alandaka programɛ ya botángi ya Biblia oyo esalelamaka na eteyelo. Azalaka mpe na mokano moko to mibale ya koyekola ye moko oyo asengeli kokokisa na mikolo ezali koya. Alobi boye: “Mikano yango esalisaka ngai namona na makanisi boyekoli oyo nakosala na mikolo ezali koya.”

Bongo biso? Totikaka ntango mingi mpo na koyekola Biblia mpe komanyola na Liloba ya Nzambe? Tosalelaka likoki na biso ya kokanisa mpe tozwaka bikateli na boyokani na mitinda ya Makomami? (Mas. 2:1-7) Tiká ete tózala na mokano ya kokóma bato oyo bakɔmeli na elimo, tókóma na boyebi mpe bwanya ya bato oyo basalelaka makoki na bango ya kososola mpo na kokesenisa mabe ná malamu!

[Elilingi na lokasa 23]

Tosalelaka makoki na biso ya kokanisa na ‘kosalela yango’