Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Madagascar

Bamipesaki na bolingo na bango moko​—Na Madagascar

“NTANGO nayokaki masolo ya baninga na ngai oyo bakendaki na bisika oyo mposa ya babongisi-nzela ezalaki monene, ngai nalingaki mpe komeka likambo yango. Kasi, nazalaki kobanga ete nalonga te.”​—Sylviana, mobongisi-nzela moko oyo azali na mbula soki 25.

Yo mpe oyokaka lokola Sylviana? Ozalaka na mposa ya kokende na teritware oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali monene, kasi omitunaka soki okokoka kosala yango? Soki ezali bongo, kolɛmba nzoto te! Yehova asalisi bandeko ebele ya mibali mpe ya basi bálonga mikakatano oyo ezalaki kopekisa bango bámipesa mingi koleka na mosala ya kosakola. Mpo na komona ndenge Yehova afungwelaki basusu kati na bango nzela, tókende na Madagascar, esanga ya minei oyo eleki monene na mabele.

Na mbula 10 oyo eleki, basakoli ya molende mpe babongisi-nzela koleka 70 oyo bautaki na mikili 11 * bayaki kosakola na ekólo yango ya Afrika, epai bato mingi bazalaka na limemya mpo na Biblia. Lisusu, basakoli ebele ya ekólo yango bandimaki kokende na bingumba mosusu ya esanga yango ya monene mpo na kopalanganisa nsango ya Bokonzi. Tólobela basusu kati na bango.

BALONGOLAKI KOBANGA MPE KOLƐMBA NZOTO

Perrine ná Louis

Louis ná mwasi na ye Perrine, oyo bazali na mbula mwa moke koleka 30, bautá na France. Banda bambula mingi, bazalaki na mposa ya kokende kosakola na mboka mopaya, kasi Perrine azalaki kokakatana mpo na kokende. Alobi boye: “Nazalaki kobanga kokende esika nayebi te. Nazalaki koboya kotika libota na biso, lisangá, ndako, bisika nyonso oyo toyebaki, mpe bomoi oyo tomesanaki na yango. Mpo na koloba solo, mitungisi na ngai moko nde ezalaki mokakatano oyo elekaki monene.” Na 2012, Perrine azwaki mpiko, mpe ye ná Louis bakendaki na Madagascar. Ayokaka ndenge nini mpo na ekateli oyo bazwaki? Alobi boye: “Soki nakanisi, nakoki koloba ete komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso ekómisi mpenza kondima na biso makasi.” Louis abakisi ete: “Na Ekaniseli na biso ya liboso na Madagascar, bato 10 kati na bayekoli na biso ya Biblia bayaki!”

Kasi, nini epesaki bango makasi ya kokoba mosala na bango ntango bakutanaki na mikakatano? Babondelaki Yehova mingi mpo apesa bango makasi ya koyika mpiko. (Bafilipi 4:13) Louis alobi boye: “Tomonaki ete Yehova ayokaki mabondeli na biso mpe apesaki biso ‘kimya ya Nzambe.’ Tolongaki kotya makanisi na makambo ya esengo oyo tozalaki kokutana na yango na mosala ya kosakola. Lisusu, baninga na biso ya France bazalaki kotindela biso mikanda mpe bamesaje mpo na kolendisa biso tóyika mpiko.”​—Bafilipi 4:6, 7; 2 Bakorinti 4:7.

Yehova apambolaki mpenza ezaleli ya koyika mpiko oyo Louis ná Perrine bamonisaki. Louis alobi boye: “Na sanza ya 10/2014, tokɔtaki Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá * na France. Kelasi yango ezalaki mpenza likabo ya Yehova oyo tobosanaka te.” Nsima ya kelasi, Louis ná Perrine basepelaki mingi ndenge bazongisaki bango na Madagascar.

“BOKOPESA BISO ESENGO MINGI!”

Nadine ná Didier

Ntango Didier ná mwasi na ye Nadine, oyo bautá France, bakendaki na Madagascar na 2010, bazalaki na mbula koleka 50. Didier alobi boye: “Ntango tozalaki bilenge, tozalaki babongisi-nzela, na nsima tobɔkɔlaki bana misato. Ntango bakolaki, tokómaki kokanisa kokende kosakola na mboka mopaya.” Nadine abakisi ete: “Likanisi ya kokabwana na bana na biso ezalaki kozongisa ngai nsima, kasi bana balobaki na biso: ‘Soki bokei kosakola esika mposa ezali monene, bokopesa biso esengo mingi!’ Maloba na bango elendisaki biso tókende. Atako tozali sikoyo mosika na bana na biso, tozali na esengo mpo tosololaka na bango mbala na mbala.”

Mpo na Didier ná Nadine, koyekola monɔkɔ ya Malgache nde ezalaki mokakatano. Na mwa kosɛka, Nadine alobi: “Tozali lisusu na mbula 20 te.” Nini esalisaki bango? Na ebandeli, bazalaki na lisangá ya Lifalanse. Na nsima, ntango bamonaki ete bakoki sikoyo kolekisa ntango na koyekola monɔkɔ ya mboka, bakendaki na lisangá ya Malgache. Nadine alobi boye: “Bato mingi oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola balingaka mpenza koyekola Biblia. Mbala mingi bapesaka biso matɔndi mpo toyei kotala bango. Na ebandeli, ezalaki kokamwisa ngai mpenza. Nasepelaka mpenza ndenge tozali babongisi-nzela na teritware oyo. Soki nalamuki na ntɔngɔ, nalobaka na nse ya motema: ‘Oyo nde esengo, lelo nazali kobima na mosala ya kosakola!’”

Didier asɛkaka soki azali kolobela ntango abandaki koyekola monɔkɔ ya Malgache sika. Alobi boye: “Nazalaki kotambwisa lisolo moko na lisangá kasi nazalaki kokanga ntina te ya biyano oyo bandeko bazalaki kopesa. Nyonso oyo nakokaki koloba ezalaki kaka, ‘Matɔndi.’ Ntango napesaki ndeko mwasi moko matɔndi, bato oyo bafandaki na nsima na ye basalaki ngai elembo mpo na koyebisa ngai ete apesaki eyano ya mabe. Mbala moko naponaki ndeko mobali moko oyo apesaki eyano ya malamu​—nabanzi apesaki eyano ya malamu.”

ANDIMAKI KOYA KOFANDA NA BANGO

Na liyangani ya etúká ya 2005, ndeko Thierry ná mwasi na ye Nadia balandaki drame “Landá mikano oyo ekumisaka Nzambe.” Drame yango oyo elobelaki Timote esimbaki mpenza motema na bango mpe ebakisaki mposa na bango ya kokende kosakola esika basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Thierry alobi boye: “Na nsuka ya drame yango, ntango tozalaki kobɛta mabɔkɔ, nayebisaki mwasi na ngai na litoi ete, ‘Tókende wapi?’ Mwasi na ngai alobaki ete ye mpe azalaki komituna bongo.” Mwa moke na nsima, babandaki kobongisa makambo mpo bákokisa mokano na bango. Nadia alobi boye: “Tozalaki kolongola biloko mokemoke tii totikalaki kaka na biloko oyo ekoki na valize minei!”

Na lobɔkɔ ya mwasi: Nadia ná Marie-Madeleine; Na lobɔkɔ ya mobali: Thierry

Bakómaki na Madagascar na 2006 mpe banda na ebandeli basepelaki na mosala ya kosakola. Nadia alobi: “Tosepelaka mingi na bato oyo tokutanaka na bango.”

Kasi, mbula 6 na nsima, Thierry ná Nadia bakutanaki na mokakatano moko. Marie-Madeleine, mama ya Nadia, oyo azalaki kofanda na France, akweaki; lobɔkɔ na ye ebukanaki mpe azokaki na motó. Nsima ya kosolola na monganga ya mama ya Nadia, Thierry ná Nadia basɛngaki mama aya kofanda na bango na Madagascar. Atako azalaki na mbula 80 na ntango wana, andimaki koya kofanda na bango. Ayokaka ndenge nini kofanda na mboka mopaya? Alobi boye: “Na bantango mosusu komesana ezalaka mpasi, kasi atako nazali lisusu na makasi mingi te, nayokaka ete nazali na ntina na lisangá. Likambo epesaka ngai esengo mpenza ezali ete koya kofanda awa epesi mwana na ngai ná mobali na ye nzela ya kokoba mosala na bango oyo ezali kobota mbuma malamu na Madagascar.”

“NAMONAKI LOBƆKƆ YA YEHOVA”

Riana azali kosala lisolo na monɔkɔ ya Tandroy

Riana azali ndeko mobali moko ya mbula pene na 25. Akolá na Alaotra Mangoro, etúká moko oyo ezali na mabele ya malamu na ɛsti ya Madagascar. Azalaki mayele na kelasi mpe azalaki na mposa ya kokɔta iniversite. Kasi nsima ya koyekola Biblia, abongolaki makanisi na ye. Alobi boye: “Nasalaki makasi nazwa diplome noki mpe nalakaki Yehova ete, ‘Soki nalongi na ekzamɛ, nakokóma mobongisi-nzela.’” Nsima ya kozwa diplome, Riana akokisaki elaka na ye. Akendaki kofanda na ndeko mobali mosusu oyo azalaki mobongisi nzela, azwaki mwa mosala mpo na kobikela, mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Alobi boye: “Ezalaki ekateli eleki malamu oyo nazwá.”

Kasi, bato ya libota ya Riana bazalaki komona te ntina oyo azwaki ekateli ya ndenge wana. Alobi boye: “Papa na ngai, nɔkɔ, mpe nkɔkɔ na biso ya mwasi batyaki ngai mbamba nakɔta iniversite. Kasi nalingaki kokata mosala ya mobongisi-nzela ata mpo na eloko moko te.” Eumelaki te, Riana akómaki na mposa ya kokende kosala esika mposa ya basakoli ezalaki monene. Nini epesaki ye mposa yango? Alobi boye: “Miyibi bakɔtelaki biso mpe bayibaki biloko na ngai ebele. Likambo yango etindaki ngai nakanisa makambo oyo Yesu alobaki na oyo etali kobomba ‘biloko ya motuya na likoló.’ Nazwaki mokano ya komipesa mpo na kozwa biloko ya motuya ya elimo.” (Matai 6:19, 20) Riana akendaki na sudi mpenza ya ekólo, na etúká moko oyo mbula ebɛtaka mpenza te, na kilomɛtrɛ 1 300 longwa esika azalaki kofanda. Bato oyo bafandaka kuna ezali ba-Antandroy. Mpo na nini akendaki kuna?

Sanza moko liboso báyiba biloko na ye, Riana abandaki koyekola Biblia na ba-Antandroy mibale ya mibali. Ayekolaki mwa maloba ya monɔkɔ na bango mpe akanisaki ebele ya ba-Antandroy oyo bayoká naino nsango ya Bokonzi te. Alobi boye: “Nabondelaki Yehova asalisa ngai nakende esika balobaka monɔkɔ ya Tandroy.”

Ntango akendaki kuna, Riana akutanaki na mokakatano moko. Azalaki kozwa mosala te. Moto moko alobaki na ye: “Oyei kosala nini awa? Mpo na kozwa mosala, bato mingi ya awa bakendaka esika outi!” Nsima ya pɔsɔ mibale, atako Riana azalaki lisusu na mbongo te, akendaki liyangani ya etúká mpe azalaki komituna soki akosala nini. Mokolo ya nsuka ya liyangani, ndeko mobali moko atyaki mwa eloko na libenga ya kazaka ya Riana. Atyaki mbongo oyo esalisaki Riana afuta mobembo ya kozonga na etúká ya ba-Antandroy mpe abanda mosala ya kotɛka yaourt. Riana alobi boye: “Namonaki lobɔkɔ ya Yehova na ntango oyo esengelaki. Esalisaki ngai nakoba kosalisa baoyo bazwaki naino libaku ya koyoka makambo ya Yehova te!” Mosala ezalaki mingi na lisangá. Riana abakisi boye: “Bazalaki kopesa ngai diskur mbala mibale na sanza. Yehova azalaki koteya ngai na nzela ya ebongiseli na ye.” Tii lelo, Riana azali kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ ya Tandroy báyeba Yehova.

NZAMBE AKOPAMBOLA YO

Yehova alobi ete moto nyonso oyo azali koluka lipamboli akozwa lipamboli na nkombo ya Nzambe. (Yisaya 65:16) Ntango tosali makasi mpo tólonga makambo oyo ezali kopekisa biso tómipesa na mosala ya kosakola, tokomona ndenge Yehova akopambola biso. Tólobela Sylviana, oyo totángaki na ebandeli ya lisolo. Alobaki ete azalaki kobanga ete mbala mosusu akokoka te kosakola na esika oyo mposa ezali monene. Mpo na nini azalaki kokanisa bongo? Alobi boye: “Lokolo na ngai moko ezalaka mwa molai koleka lokolo mosusu. Na yango, natambolaka na kotɛnguma mpe nalɛmbaka noki.”

Sylviana (na lobɔkɔ ya mwasi) mpe Sylvie Ann (na lobɔkɔ ya mobali) elongo na Doratine, mokolo azwaki batisimo

Atako bongo, na 2014 Sylviana ayokanaki na Sylvie Ann, elenge mwasi moko ya mobongisi-nzela ya lisangá na bango, mpe bakendaki kofanda na mwa mboka moko ya moke, na kilomɛtrɛ 85 longwa esika bazalaki. Atako mikakatano ezalaki, mposa ya Sylviana ekokisamaki mpe azwaki mpenza lipamboli ya kitoko! Alobi boye: “Mbula moko mpamba nsima ya kosakola na teritware na ngai ya sika, Doratine, mwasi moko oyo nayekolaki na ye Biblia, azwaki batisimo na liyangani ya zongazonga.”

“NAKOSALISA YO”

Kaka ndenge bandeko oyo bakendaki kosala esika mposa ezali monene bamonisi yango, soki tosali makasi tólongola makambo oyo ezali kopekisa biso tómipesa na mosala ya kosakola, tokomona ndenge Yehova akosalisa biso mpo ye moko alobaki na basaleli na ye ete: “Nakopesa yo makasi. Nakosalisa yo mpenza.” (Yisaya 41:10) Na yango, boyokani na biso na ye ekokóma makasi koleka. Longola yango, komipesa mpo na kosala, ezala na mboka na biso to na mboka mopaya, ezali kobongisa biso mpo na misala ya Bokonzi oyo ezali kozela biso na mokili ya sika. Ndenge ndeko Didier, oyo tolobelaki, alobaki yango, “kosala esika mposa ezali monene ezali kobongisa biso mpo na mikolo ezali koya!” Tozali na elikya ete bandeko mosusu ebele bakondima komipesa ndenge wana!

^ par. 4 Basakoli oyo bayaki kopesa mabɔkɔ bautaki na Allemagne, Canada, États-Unis, France, Guadeloupe, Luxembourg, Nouvelle-Calédonie, République tchèque, Royaume-Uni, Suède, mpe Suisse.

^ par. 8 Lelo ekómá Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Babongisi-nzela oyo basakolaka na mboka mopaya mpe bakokisi masɛngami bakoki kotondisa formilɛrɛ mpo na kokɔta na eteyelo yango na ekólo oyo bautá to na ekólo mosusu esika eteyelo yango ekosalema na monɔkɔ na bango.