Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikakatano oyo baaparɛyi ekoki kobimisela makanisi na yo?

Mikakatano oyo baaparɛyi ekoki kobimisela makanisi na yo?

Bato basengeli koyekola makambo mingi na oyo etali kelasi, mosala to mpe makambo mosusu. Baaparɛyi oyo esalisaka moto akɔta na Internet ekoki mpenza kosalisa bato báyekola. Lelo oyo, koleka bileko mosusu nyonso, moto akoki koyekola makambo mingi mpenza kaka na ndako na ye to kaka na esika afandi.

Kasi, bato oyo bazali kosalela baaparɛyi mingi bazali komona ete . . .

  • ezali mpasi bátya makanisi esika moko ntango bazali kotánga.

  • makanisi na bango eumelaka te kokende epai mosusu.

  • balɛmbaka mingi ntango bazali bango moko.

OYO OSENGELI KOYEBA

KOTÁNGA

Bato mosusu oyo basalelaka baaparɛyi mingi bakokaka te kotánga lisolo to buku moko boye banda na ebandeli tii na nsuka, balukaka kaka makanisi ya ntina mpe baleki.

Kobwaka kaka liso ndenge wana na lisolo moko ezali malamu ntango olingi kozwa eyano moko nokinoki. Kasi, lolenge wana ya kosala ezali malamu te soki olingi okanga ntina ya likambo moko malamumalamu.

KANISÁ NAINO: Ozali mpenza na likoki ya kotánga masolo ya milai? Mpo na nini kotánga na likebi ekosalisa yo oyeba makambo mingi?​—MASESE 18:15.

KOTYA MAKANISI NA LIKAMBO MOKO

Bato mosusu balobaka ete baaparɛyi epesaka bango likoki ya kosala makambo mibale na mbala moko. Na ndakisa, bakoki kotindela baninga bamesaje ntango bazali koyekola. Kasi, ntango moto atye likebi na makambo mingi, asalaka ata eloko moko te malamu, mingimingi soki esɛngi kotyela makambo yango likebi mpenza.

Ata soki ezali mpasi kotya makanisi na eloko moko, kasi kosala yango ekoki kosalisa mingi mpo na koyekola. Elenge mwasi moko na nkombo Grace alobi ete: “Soki osali bongo okosala bafoti mingi te mpe okomitungisa mingi te. Namoni ete ezali malamu kotya makanisi na likambo moko kaka na esika ya kosala makambo ebele na mbala moko.”

KANISÁ NAINO: Kosala makambo ebele na mbala moko ebebisaka likoki na yo ya kokanga makambo mpe ya koyeba lisusu makambo oyo otángaki?​—MASESE 17:24.

NTANGO OZALI YO MOKO

Bato mosusu bamiyokaka malamu te soki bafandi kaka bango moko na esika ya kimya. Yango wana bafungolaka baaparɛyi na bango mpo báyoka ata mwa makɛlɛlɛ. Mwasi moko na nkombo Olivia alobi boye: “Nabayaka mpenza kofanda kaka mpamba boye na boumeli ya miniti 15 kozanga ete nafungola telefone na ngai, tablɛti to TV.”

Kasi, mpo na koyekola malamu, moto asengeli mpe kozala na ntango moko oyo alekisaka ye moko mpo akoka kokanisa malamu to komanyola, ezala bilenge to mikóló.

KANISÁ NAINO: Okoki kosalela ntango oyo ozali kaka yo moko mpo na kokanisa to komanyola?​—1 TIMOTE 4:15.

OYO OKOKI KOSALA

TALELÁ MALAMU NDENGE OSALELAKA BAAPARƐYI MPE INTERNET

Na ndenge nini okoki kosalela baaparɛyi mpe Internet mpo na kobongisa makoki na yo ya kokanisa? Baaparɛyi mpe Internet ekoki kosala nini na makoki na yo ya kotya makanisi esika moko to ya koyekola?

VƐRSƐ: “Batelá bwanya ná likoki ya kokanisa.”​—MASESE 3:21.