Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | LIBALA

Koboya kotingama na likambo

Koboya kotingama na likambo

MOKAKATANO

Yo ná molongani na yo bozali na makanisi ekeseni na likambo moko. Na yango, okoki kopona kosala moko ya makambo misato oyo elandi:

  1. Na nko nyonso, okoki kotingama kaka na oyo olingi.

  2. Okoki kondima kaka tiká ondima oyo molongani na yo alingi.

  3. Mokomoko na bino akoki koboya kotingama na oyo alingi.

Kasi, okoki koloba: ‘Nalingaka te likanisi ya koboya kotingama na likambo mpo emonisaka lokola nde moko te kati na biso akozwa eloko oyo alingi!’

Osengeli kondimisama ete likambo oyo oboyi kotingama na yango ekozala mpo na litomba ya bino mibale. Kasi, liboso ya kotalela ndenge ya koboya kotingama na likambo, ezali na mwa makambo oyo osengeli koyeba mpo na ezaleli yango ya ntina mingi.

OYO OSENGELI KOYEBA

Esɛngaka kopesana mabɔkɔ. Liboso obala, ekoki kozala ete omesanaki kozwa bikateli yo moko. Sikoyo makambo ebongwani mpe yo ná molongani na yo bosengeli kotya libala na bino liboso ya makambo oyo mokomoko asepelaka na yango. Na esika omona ete libala ebebisi makambo na yo, talelá nde matomba oyo ozali kozwa. Mwasi moko na nkombo Alexandra, alobi boye: “Makanisi ya bato mibale ekoki kobimisa solisyo ya malamu koleka oyo moto na moto azwi na ndenge na ye.”

Esɛngaka kozala na makanisi malamu. John Gottman, mopesi-toli moko na makambo ya libala akomaki boye: “Osengeli kaka te kondima nyonso oyo molongani na yo alobi to amoni malamu, osengeli nde kotalela na bosembo nyonso likanisi oyo apesi. Soki ofandi, okangi mabɔkɔ mpe ozali koningisa motó (to ozali kokanisa yango) ntango molongani na yo azali koyebisa yo likambo moko, lisolo na bino ekokende mosika te.” *

Esɛngaka komipimela. Moto moko te akolinga kozala na molongani oyo amonaka kaka ete “likanisi na ye nde eleki malamu.” Ezali malamu koleka soki balongani bazali na ezaleli ya komipimela. Mwasi moko na nkombo June, alobi boye: “Na bantango mosusu, natikaka mobali na ngai asala oyo alingi mpo nasepelisa ye, kasi na bantango mosusu, ye mpe asalelaka ngai bongo. Libala esengeli nde kozala bongo, kopesa mpe kozwa, kasi te kaka kozwa.”

OYO OKOKI KOSALA

Bandá na ndenge ebongi. Mbala mingi, volimi ya mongongo oyo moto abandi na yango lisolo nde asukisaka na yango. Soki obandi na maloba mabe, ekozala mpasi bózwa solisyo na kimya. Yango wana, landá toli oyo ya Biblia: “Bólata . . . mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai.” (Bakolose 3:12) Bizaleli yango ekosalisa yo ná molongani na yo bóboya koswana mpe bóluka nde kobongisa likambo.​—Toli ya Biblia: Bakolose 4:6.

Luká koyeba esika oyo makanisi na bino mibale ekokani. Soki ozali koboya kotingama na likambo, kasi yango ezali kobimisa kaka koswana makasi, mbala mosusu ezali mpo yo ná molongani na yo bozali kotya miso na esika oyo makanisi na bino ekeseni. Luká nde esika oyo makanisi na bino ekokani. Mpo na kosalisa yo oyeba esika oyo makanisi na bino ekokani, meká kosala boye:

Moto na moto asala liste oyo ezali na makambo ngámbo na ngámbo. Na ngámbo moko, komá makambo oyo omoni ete ezali mpenza na ntina mpo na yo. Na ngámbo mosusu, komá makambo oyo omoni ete okoki kotikela molongani na yo asala oyo alingi. Na nsima, bósolola makambo yango. Bokoki komona ete bozali na makanisi ndenge moko na makambo mingi koleka ndenge bozali kokanisa. Soki ezali bongo, ekozala mpasi mpenza te bótika kotingama na makambo. Ata soki makanisi yango ekokani te, kotya makambo yango nyonso na papye ekosalisa yo ná molongani na yo bómona likambo yango polele lisusu.

Bópesanaka makanisi. Makambo mosusu ezalaka mpasi te kozwela yango solisyo. Kasi, na makambo minene, mwasi ná mobali bakoki kokómisa boyokani na bango makasi soki bapesani makanisi mpo na kozwa solisyo oyo mbala mosusu moko te alingaki kobimisa yango ye moko.​—Toli ya Biblia: Mosakoli 4:9.

Ndimá kobongola makanisi na yo. Biblia elobi boye: “Mokomoko na bino mpenza alinga mwasi na ye bongo ndenge amilingaka ye moko; mpe mwasi, asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Ntango bolingo mpe limemya ezali na libala, ekozala mpasi te molongani moko atalela likanisi ya moninga; ata mpe kobongola makanisi. Mobali moko na nkombo Cameron, alobi boye: “Ezali na makambo oyo okolinga kosala te, kasi mpo na molongani na yo, okokóma kolinga yango na nsima.”​—Toli ya Biblia: Ebandeli 2:18.

^ par. 12 Euti na buku The Seven Principles for Making Marriage Work.