Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likama oyo ezali kobangisa baboti nyonso

Likama oyo ezali kobangisa baboti nyonso

HÉLÈNE ná mobali na ye Samuel bazalaka kasakasa mpe bazalaka na esengo na libala na bango. * Bazali na mwana mobali moko ya mbula misato oyo azali mayele mpe nzoto kolɔngɔnɔ, mpe babɔkɔlaka ye malamu. Nzokande na moi ya lelo, kobɔkɔla mwana ezali pɛtɛɛ te, mpamba te ezali mokumba monene mpe ebimisaka ebele ya mitungisi. Ezali na makambo mingi oyo esengeli koteya bana! Kasi, ezali na likambo moko oyo Hélène ná Samuel batyelaka yango likebi mingi: kobatela mwana na bango mpo bábebisa ye te. Mpo na nini?

Hélène alobi boye: “Tata azalaki koyokela bato mawa te, azalaki nkandankanda mpe azalaki kolangwa mingi. Azalaki kobɛta ngai mabe mpe kobebisa ngai ná baleki na ngai ya basi.” * Bato mingi bayebi ete mwana oyo abebisami atikalaka na mpasi makasi na motema. Yango wana, Hélène azali mpenza na mokano ya kobatela mwana na bango! Samuel mpe azali na mokano yango.

Likambo ya kobebisa bana etungisaka baboti mingi. Ntango mosusu, ezali kotungisa mpe yo. Ekoki kozala ete okutaná naino te na likambo oyo ekómelaki Hélène, kasi tokanisi ete osilá koyoka bansango oyo emonisi ete likambo wana ya mabe mpenza ekómi kosalema mingi. Na mokili mobimba, baboti ya malamu bayokaka mpasi na motema ntango bazali koyoka ndenge bato bazali kobebisa bana na esika bafandi.

Yango wana, nsima ya komona ndenge bana mingi bazali kobebisama, moto moko oyo ayekolaka likambo yango alobi ete “ezali mpenza likambo ya kolɛmbisa nzoto na eleko na biso.” Yango ezali nsango ya mawa mpenza, kasi ezali kokamwisa bayekoli ya Biblia te, mpamba te Liloba ya Nzambe emonisi ete tozali na ntango ya mobulu oyo ebengami “mikolo ya nsuka.” Biblia emonisaki ete na ntango yango, bato mingi bakozala “bato ya kongala,” “bato oyo bamilingaka bango moko” mpe bato “bazangi bolingo ya libota.”​—2 Timote 3:1-5.

Likambo ya kobebisa bana ebangisaka mingi. Kutu, baboti mosusu balɛmbaka nzoto ntango bakanisaka ete ezali na bato ya mitema mabe mpenza oyo balukaka kobebisa bana. Kasi, likambo yango eleki baboti motó? To ezali nde na makambo oyo bakoki kosala mpo na kobatela bana na bango? Masolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.

^ par. 2 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa, na lisolo oyo mpe na mibale oyo elandi.

^ par. 3 Balobaka ete mokóló abebisi mwana soki asaleli ye mpo na kokokisa bamposa na ye ya nzoto. Mbala mingi, ezalaka oyo Biblia ebengi pite to pornéïa mpo esangisaka makambo lokola kosimbasimba ye na nzoto na ye ya mobali to ya mwasi, kosangisa na ye nzoto, ezala na monɔkɔ to na esumbeli. Ntango mosusu ezalaka mpe makambo oyo Biblia ebengi “etamboli ya mbindo” to “bosɔtɔ . . . na lokoso” soki esangisi makambo lokola kosimbasimba mwana na mabɛlɛ, kosɛnga ye mpenza básala makambo ya mbindo, kolakisa ye bililingi ya bato oyo bazali bolumbu, kotala bolumbu ya mwana to kotikala bolumbu liboso ya mwana.​—Bagalatia 5:19-21; Baefese 4:19.