Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOTUNA 4

Nasala nini mpo nabongisa mabe oyo nasali?

Nasala nini mpo nabongisa mabe oyo nasali?

NTINA NA YANGO

Kondima mabe oyo osali ekomonisa ete okoli mpe ete obongi kotyelama motema.

YO OLINGAKI KOSALA NINI?

Talá likambo oyo: Ntango Tim azali kosakana na baninga na ye, abɛti bale mpe ekei kopasola vitre ya bato.

Soki ozalaki Tim, olingaki kosala nini?

KANISÁ!

OKOKI KOPONA NA MAKAMBO MISATO OYO:

  1. Kokima.

  2. Kopesa moto mosusu foti.

  3. Koyebisa bankolo-ndako likambo oyo esalemi, mpe koyebisa bango ete okoki kofuta.

Motema ekoki kotinda yo osala Likambo 1. Kasi, ezali na makambo oyo esengeli kotinda yo ondimaka mabe oyo osali, ezala kopasola vitre, to likambo mosusu.

NTINA MISATO YA KONDIMA MABE OYO OSALI

  1. Kosala bongo nde malamu.

    Biblia elobi: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”Baebre 13:18.

  2. Bato basepelaka kolimbisa baoyo bandimaka mabe oyo basali.

    Biblia elobi: “Ye oyo azali kozipa makambo na ye oyo ebuki mibeko akolonga te, kasi ye oyo ayamboli mpe atiki yango akoyokelama mawa.”Masese 28:13.

  3. Likambo eleki ntina, Nzambe akosepela.

    Biblia elobi: “Moto ya mbilingambilinga azali eloko moko oyo Yehova ayinaka, kasi Ye azali moninga ya motema ya bato ya kolongobana.”Masese 3:32.

Karina, oyo azali na mbula 20, aboyaki koyebisa papa na ye ete bafutisaki ye amande mpo atambwisaki motuka mbangu mingi. Kasi, akokaki kobomba likambo yango libela te. Alobi boye: “Mbula mobimba na nsima, papa amonaki ete bafutisaki ngai amande mpo natambwisaki motuka mbangu. Ebendelaki ngai mindɔndɔ mpenza!”

Liteya nini azwaki? Karina alobi: “Kobomba mabe oyo osali, ebebisaka lisusu makambo. Nsukansuka, ekoyebana kaka!”

NDENGE YA KOZWA MAYELE

Biblia elobi: “Mpo biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi.” (Yakobo 3:2) Mpe ndenge tomoni yango, kondima mabe oyo osali ekomonisa ete ozali na komikitisa mpe okoli—ndimáká mbala moko.

Na nsima, osengeli kozwa mayele. Elenge mwasi moko na nkombo Vera alobi boye: “Ntango nyonso oyo nasali likambo ya mabe, nalukaka kozwa liteya, mpe natikaka liteya yango esalisa ngai nakóma moto malamu mpe nasala malamu mbala ya nsima.” Tótala ndenge yo mpe okoki kosala bongo.

Obimaki na velo ya papa na yo mpe ebukani. Okosala nini?

  • Nakoloba eloko te, ntango mosusu papa akomona te.

  • Nakoyebisa papa likambo oyo esalemi.

  • Nakoyebisa papa, kasi nakopesa moto mosusu foti.

Ozwi te na kelasi mpo otángaki malamu te na ndako. Okosala nini?

  • Nakoloba ete ezalaki mpasi.

  • Nakondima ete ezali foti na ngai.

  • Nakoloba ete molakisi alingaka ngai te.

Kokanisa ntango nyonso mabe oyo osalá kala ezali lokoka kotala na talatala oyo elakisaka nsima ntango ozali kokumba motuka

Sikoyo, talá lisusu bandakisa oyo tolobeli mpe kanisá ete yo nde ozali (1) papa na bino mpe (2) molakisi na bino. Papa ná molakisi na bino bakokanisa nini mpo na yo soki ondimi mbala moko mabe na yo? Bakokanisa nini mpo na yo soki obombi mabe na yo?

Sikoyo, kanisá mabe moko oyo osalaki mbula eleki mpe yanolá na mituna oyo ezali awa na nse.

Mabe yango ezalaki nini? Osalaki nini na nsima?

  • Nabombaki yango.

  • Napesaki moto mosusu foti.

  • Nandimaki yango mbala moko.

Soki obombaki mabe yango, oyokaki ndenge nini na nsima?

  • Eloko te—Elekaki na yango!

  • Mpasi—Nasengelaki koloba solo.

Likambo nini ya malamu okokaki kosala

Ndenge nini likambo yango eteyaki yo?

OKANISI NINI?

Mpo na nini bato mosusu baboyaka kondima mabe oyo basali?

Bato bakokanisa nini mpo na yo soki olukaka kaka kobomba mabe oyo osali, kasi bakokanisa nini mpo na yo soki ondimaka mabe oyo osali?Luka 16:10.