Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako?

Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete bango mpe ‘bakómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ (Matai 28:19, 20) Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye ya liboso bákende kosakola, ayebisaki bango bákende koluka bato na bandako na bango. (Matai 10:7, 11-13) Nsima ya liwa ya Yesu, bakristo ya liboso bakobaki kosakola nsango malamu “na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.” (Misala 5:42; 20:20) Tosalaka lokola bakristo wana ya liboso mpe tomonaka ete kosakola ndako na ndako ezali lolenge malamu ya kokutana na bato.