Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako nde mpo bábika?

Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako nde mpo bábika?

 Te. Ya solo, mbala mingi tokendaka kosakola ndako na ndako, kasi tomonaka te ete tokobika kaka mpo na mosala yango. (Baefese 2:8) Mpo na nini?

 Tózwa ndakisa moko: Kanisá ete moto moko ya motema malamu alaki ete akopesa moto nyonso oyo akoya na esika moko boye na mokolo moko boye oyo aponi eloko moko ya ntalo makasi. Soki ondimi mpenza elaka ya moto yango, okosala mpenza ndenge alobi, lokuta? Te! Mbala mosusu kutu okoyebisa mpe baninga ná bandeko na yo likambo yango, mpo bango mpe bázwa biloko wana. Ata soki osali ndenge moto wana alobaki, ozwi eloko wana nde mpo moto yango asepeli kopesa yo yango. Soki bakabeli yo eloko, bakabeli yo kaka.

 Ndenge moko mpe, biso Batatoli ya Yehova tondimaka ete Nzambe akopesa bomoi ya seko na moto nyonso oyo akotosa ye, ndenge alaki yango. (Baroma 6:23) Tosalaka makasi tóyebisa mpe bato mosusu makambo oyo biso tondimaka, mpo bango mpe bázwa mapamboli oyo Nzambe alaki. Kasi tomonaka te ete tokobika kaka mpo tokendaka kosakola. (Baroma 1:17; 3:28) Kutu, moto moko te akoki kosala makambo oyo ekotinda Nzambe apesa biso likabo oyo alaki. “Abikisi biso bobele po ayokelaki biso mawa; ezali té po tokokisaki misala ya bosembo.”​—Tito [Tite] 3:5, Bible na lingala ya lelo oyo.