Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 96

Buku ya Nzambe​—Eloko ya motuya mingi

Buku ya Nzambe​—Eloko ya motuya mingi

(Masese 2:1)

  1. 1. Eza’ na buku moko oy’ezali

    Kopes’elikya, kimya, esengo.

    Ezali kofungola bato miso;

    Eza’ kopesa mpe bato bomoi.

    Buku yango nde Biblia mosantu.

    Ekomamaki na bato oyo

    Balingaki mpenza Yehova Nzambe;

    Elimo na y’ekambaki bango.

  2. 2. Bakomaki ndenge Nzamb’akelaki

    Likoló ná nse, biloko nyonso.

    Ndeng’akelaki Adama ná Eva;

    Ndenge babungisá Paradiso.

    Balobeli lisusu’anzelu moko

    Atɛmɛlaki bokonzi’a Nzambe.

    Yango lelo, biso mpasi na mpasi,

    Mosika te, Nzamb’akolonga ye.

  3. 3. Yehova az’oyangela sikoyo,

    Na nzel’a Kristo; mokol’esengo.

    Sikoyo tópanza nsango malamu

    Ya mapamboli ya Bokonzi’ango.

    Nyonso wana ezali na Biblia;

    Bilei y’elimo mpo na nga’ ná yo.

    Epesaka kimya eleki nyonso.

    Tótángak’ango; eleki wolo.