Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LOYEMBO 86

Tosengeli koteyama

Tosengeli koteyama

(Yisaya 50:4; 54:13)

  1. 1. Elimo ezali kobelela biso:

    ‘Yaká nde komɛla mai ya bomoi.’

    Nzamb’abongisi bilei kitoko.

    Mpo na bato ya nzala n’elimo.

  2. 2. Koteyama na Yehova nde esengo;

    Tóya makita mikolo nyonso.

    Awa tokozwa elimo santu,

    Tokolendisana ná bandeko.

  3. 3. Elɛngi koyoka bato Yah’z’oteya!

    Mingongo na bango mpe kitoko!

    Libota oyo, seko na seko,

    Tóyanganak’elongo na bango.