Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec

Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec

Ntango bazalaki kosambisa Paulo, asɛngaki akende kosamba epai ya Kaisala. Paulo atikelá biso ndakisa ndenge asalelaki lotomo na ye ya kozala mwana-mboka ya Roma. Talá video Ndenge tozwaki ndingisa ya kosakola na Québec mpo na koyeba ndenge bandeko na biso basalelaki mibeko mpo na kokɔtela nsango malamu na Québec. Na nsima, yanolá na mituna oyo:

  • Mikakatano nini bandeko na biso na Québec bakutanaki na yango?

  • Trakte nini bakabolaki mpe yango ebimisaki matomba nini?

  • Nini ekómelaki ndeko Aimé Boucher?

  • Ekateli nini Tribinale monene ya Canada ezwaki na likambo ya ndeko Boucher?

  • Bandeko basalelaki mobeko nini oyo esalelamaka mpenza te mpe yango ebimisaki nini?

  • Nini esalemaki ntango bapolisi bakataki makita ya losambo mpo balandaki makambo oyo basango balobaki?