Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bisika oyo bazalaki kofanda

Bisika oyo bazalaki kofanda

Bomoi mpe ntango ya bakristo ya ekeke ya liboso

Bisika oyo bazalaki kofanda

“Namipekisaki te . . . koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.”​—MISALA 20:20.

SOKI okɔti na ekuke ya monene, na mbala moko okómi na engumba moko ya ekeke ya liboso. Ndenge bingumba mingi ezali, yango mpe etongami likoló ya ngomba. Liboso na yo, omoni eteni ya engumba oyo ezali likoló ya ngomba. Bandako mineneminene ebele mpe ya kitoko ya langi ya mpɛmbɛ, oyo mingi na yango ezali na bilanga oyo ezingami na lopango, ezali kongɛnga na moi. Wana nde esika bato ya bozwi bafandaka. Mwa moke na nse, omoni bandako ebele lisusu oyo ekeseni na bonene mpe ya midɛlɛ ndenge na ndenge. Bandako yango minene ya etaze, oyo batongá na mabanga, ezali ya bato ya mombongo mpe ya bankolo mabele oyo bazali na mwa bozwi; bandako yango ezali pembenipembeni ya babalabala oyo batongá na mabanga. Soki okiti na nse lisusu, omoni bisika oyo babola bafandaka. Bandako ya bongobongo oyo ezali awa ezali mikemike, ezali lokola bakɔntɛnɛrɛ oyo ekangani pembenipembeni ya babalabala ya mikemike to mpe esangisami na kati ya mapango ya mike.

Ntango ozali kotambola na babalabala yango oyo etondi na bato, makɛlɛlɛ mpe nsolo oyo oyoki esalisi yo oyeba makambo oyo ezali koleka. Basi bazali kolamba, mpe nsolo kitoko ezali kopanzana bipai na bipai. Ozali koyoka makɛlɛlɛ ya banyama mpe ya bana oyo bazali kosakana. Mibali bazali kosala misala na bisika ya mombongo, oyo etondi na makɛlɛlɛ mpe nsolo.

Bomoi ya mabota ya bakristo ezalaki koleka na bandako wana. Kuna nde esika bazalaki kosala makambo nyonso ya bomoi ya mokolo na mokolo, kolanda mateya ya Nzambe, mpe kosambela.

Bandako ya mikemike Kaka ndenge ezali mpo na bandako ya lelo, bonene mpe modɛlɛ ya bandako ezalaki kotalela esika oyo yango etongami mpe makoki ya libota. Bandako ya mike koleka (1) ezalaki shambrɛ moko kaka, ezalaki molili, mpe libota mobimba ezalaki kofanda kuna. Bandako mingi ya mike etongamaki na briki ya mabele oyo bakaukisá na moi. Mosusu ezalaki na bifelo ya mabanga oyo bakatá kaka bongobongo. Mbala mingi, bandako ya mitindo yango mibale ezalaki kotongama likoló ya moboko ya mabanga.

Bazalaki kopakola pɔtɔpɔtɔ na bifelo ya kati mpe bazalaki kotya pavema na nse, mpe ezalaki kosɛnga kobatela yango mpo ebeba te. Ezalaki ata na mwa lidusu moko na nsamba ya ndako to na efelo, oyo ezalaki kobimisa milinga ya nkuku. Biloko ya ndako ezalaki kaka mwa biloko ya ntina oyo libota ezalaki kosalela.

Nsamba ya mabele efandaki na mwa bitape ya banzete, ya mingendu mpe mwa mabaya ya nsamba efandaki likoló ya mabaya ya minene; nyonso esimbami na makonzí. Na nsima, bazalaki kopakola pɔtɔpɔtɔ ya mabele likoló ya nsamba mpo ekóma mwa plafɔ oyo ekokɔtisa mai te. Mpo na kokóma na nsamba yango, esengelaki komata na eskalye ya libándá.

Atako na nkaka ya ndenge wana, bandako ya bakristo ezalaki bisika kitoko, epai libota ata ya babola ekokaki kozala na bozwi ya elimo mpe na esengo.

Bandako ya bato ya mwa bozwi Bandako ya bato ya mwa bozwi ezalaki mwa minene koleka, ya mabanga, ezalaki na etaze moko (2) mpe ezalaki kozanga shambrɛ ya bapaya te. (Marko 14:13-16; Misala 1:13, 14) Bazalaki kosala makita na shambrɛ yango monene ya likoló mpe mbala mingi bazalaki kosala bafɛti kuna. (Misala 2:1-4) Bandako yango, ata mpe bandako ya minene koleka (3) oyo ezalaki ya bato ya mombongo mpe ya bankolo mabele etongamaki na mabanga oyo bazalaki kokangisa na lima. Bazalaki kopakola pɔtɔpɔtɔ ya lima na nse mpe na bifelo ya kati; na bifelo ya libándá, bazalaki kopakola mpɛmbɛ.

Mpo na kokóma na bashambrɛ ya likoló mpe na nsamba, esengelaki komata na eskalye ya kati. Bazalaki kotonga mwa efelo zingazinga ya nsamba nyonso, mpo moto akwea te mpe makama ebima te. (Kolimbola Mibeko 22:8) Ntango moi engali, na nse ya elili ya nsamba yango, ezalaki esika kitoko epai moto akoki kobendana kuna mpo na koyekola, komanyola, kobondela, to kopema.​—Misala 10:9.

Atako mbala mingi mabota ya bato ebele ezalaki kofanda kuna, bandako yango ya makasi oyo ezalaki na bashambrɛ ya minene, ezalaki mpe na bisika mosusu: bashambrɛ mosusu ya kolala, mpe nkuku ya monene, mpe esika ya kolya.

Bandako oyo eleki kitoko Lolenge ya bandako ya Baroma (4) ekesenaki na bonene, na midɛlɛ, mpe na ndenge ya kotonga yango. Bashambrɛ ya minene ezalaki kotala salle à manger (triclinium), epai libota mobimba ezalaki kosala makambo nyonso. Bandako mosusu ezalaki na etaze moko to mibale (5) to ezalaki na bilanga oyo ezingami na bifelo.

Ntango mosusu bandako oyo eleki kitoko ezalaki na biloko ya ndako ya ntalo mingi, mosusu batyá mpɛmbɛ ya nzɔku mpe wolo. Bandako yango ezalaki na biloko lokola mai ya tiyo mpe pisine. Pavema ezalaki mbala mosusu ya mabaya to ya marbrɛ ya langi ndenge na ndenge, mpe na ntango mosusu bifelo ezalaki na mabaya ya nzete ya sɛdrɛ. Bazalaki kosalela matuka mpo na kotya mwa molunge na ndako. Na maninisa, bazalaki kotya mabaya mikemike oyo esali lokola kiyungulu mpo na kobatela ndako, mpe barido ezalaki kopekisa bato bámona makambo oyo ezali na kati. Bisika ya kotya maninisa, bazalaki kotɔbola yango na bifelo minene ya mabanga.​—Misala 20:9, 10.

Bázala na ndako ya monene to moke, to ya modɛlɛ nini, bakristo ya liboso bazalaki bayambi bapaya mpe bakabi. Na yango, bakɛngɛli-batamboli bazalaki kozanga te libota moko ya malamu, oyo ekoyamba bango tii bakosilisa mosala na bango na engumba to mboka yango.​—Matai 10:11; Misala 16:14, 15.

“Ndako ya Simo ná Andre” Yesu ayambamaki malamu na “ndako ya Simo ná Andre.” (Marko 1:29-31) Mbala mosusu, ndako ya babomi-mbisi wana ezalaki moko ya bandako oyo ekangamá esika moko, bandako yango ezalaki ya bozwi te (6) mpe ezalaki ebele na kati ya lopango moko.

Na bandako ya ndenge wana, baporte mpe maninisa ezalaki kotala na kati ya lopango, epai mbala mingi bazalaki kosala makambo ya mokolo na mokolo, na ndakisa kolamba, kotumba mampa, konika mbuma, kobɛta masolo mpe kolya.

Bandako ya Kapernaume oyo ezalaki na etaze te etongamaki na mabanga oyo bakatá te, oyo eutaka na volcan. Eskalye ya libándá ezalaki komema na nsamba ya patatalu oyo bapakolá pɔtɔpɔtɔ ya mabele to ya tuile oyo batyá likoló ya mingendu mpe mabaya ya mikemike oyo efandi likoló ya mabaya minene. (Marko 2:1-5) Bandako ezalaki na pavema, oyo mbala mingi bazalaki kozipa na matɔkɔ.

Ndenge bandako etandamaki na milɔngɔ ezalaki kobimisa babalabala mpe banzela ya mikemike pembenipembeni ya mbu ya Galile. Kapernaume ezalaki esika malamu ya kofanda mpo na babomi-mbisi oyo bazalaki kobikela na mbu.

“Na ndako na ndako” Na mokuse, bandako ya bakristo ya ekeke ya liboso ezalaki ndenge moko te​—mosusu ezalaki shambrɛ moko oyo batongá na brike ya mabele, mosusu ezalaki minene mpe kitoko, batongá na mabanga.

Bandako yango ezalaki kaka esika ya kofanda te mpo na libota. Ndako ezalaki esika ya koyoka mateya ya Nzambe. Na kati ya ndako, libota ezalaki kosambela elongo. Bazalaki koyangana na bandako ya bandeko mpo na koyekola Makomami mpe kokutana na bandeko na bango bandimi. Makambo oyo bazalaki koyekola na bandako na bango, bazalaki kosalela yango malamu na mosala na bango ya ntina mingi, mosala ya kosakola mpe koteya “na ndako na ndako” na mokili mobimba ya Roma.​—Misala 20:20.