Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lingomba ya malamu eteyaka bato bámemya Liloba ya Nzambe

Lingomba ya malamu eteyaka bato bámemya Liloba ya Nzambe

YESU azalaki mpenza komemya Biblia, Liloba ya Nzambe. Yango emonani na ndenge ayanolaki Zabolo ntango amekaki ye. (Matai 4:4-11) Na ndakisa, Yesu asalaki nini ntango Satana atindaki ye abongola mabanga ekóma mampa? Yesu aboyaki, mpe atángaki maloba ya Moize oyo ezali na Deteronome 8:3. Ntango Zabolo asɛngaki Yesu asambela ye mpo apesa ye makonzi nyonso ya mokili, Yesu asalaki nini? Aboyaki mpe atángaki mobeko oyo ezali na Deteronome 6:13.

Kanisá naino! Atako azalaki Mwana ya Nzambe, Yesu azalaki kosalela Biblia ntango azali koteya. Mpe azalaki te kotya Liloba ya Nzambe pembeni mpo na kolanda mimeseno ya bato. (Yoane 7:16-18) Nzokande, bakonzi mingi ya mangomba ya ntango ya Yesu bazalaki komemya Liloba ya Nzambe te, ndenge Yesu azalaki kosala. Mpo na nini? Bazalaki kotalela mimeseno na bango ete ezali na ntina mingi koleka Makomami Mosantu. Yesu ayebisaki bakonzi yango polele ete: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko ya mpamba mpo na mimeseno na bino. Bino bakosi, Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, ntango alobaki ete, ‘bato ya ekólo oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, nzokande motema na bango etangwá mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo bazali koteya bakomandema ya bato lokola mateya.’”​—Matai 15:6-9.

Mangomba mingi ya mokili, ezala ya boklisto to te, balobaka ete bamemyaka Biblia. Kasi, mangomba boni oyebi oyo elandaka malako ya bato te ntango eyokani te na mateya ya Liloba ya Nzambe? Tózwa ndakisa mibale.

MOTÓ YA LIKAMBO: Batitre na mangomba.

OYO BIBLIA ETEYAKA: Yesu apamelaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye mpo bazalaki kolinga batitre mpe lokumu. Alobaki ete bato yango balingaka “bisika ya lokumu na bafeti, pe bakiti ya liboso na bandako ya lisanga; balingaka bato bápesaka bango bambote na bazando, pe bábengaka bango ‘Moteyi.’” Na nsima, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bino bólingaka té ’te bábengaka bino ‘Moteyi,’ pamba té bino nyonso bozali bandeko, pe bozali na Moteyi moko kaka. Awa na mokili, bóbengaka moto moko té ‘Tata’; pamba té bozali na Tata moko kaka oyo azali na Likolo.”​—Matai 23:1-10, Bible na lingala ya lelo oyo.

MOTUNA: Bakonzi ya lingomba yango balingaka bábengaka bango na batitre ya lokumu mpe balukaka bato bákumisa bango, to batosaka mobeko ya Yesu ya koboya batitre?

MOTÓ YA LIKAMBO: Kosalela bikeko na losambo.

OYO BIBLIA ETEYAKA: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na lola na likoló te, na mokili na nse te, to na mai na nse na mokili te. Okokumbamela yango te to kosalela yango te.”​—Exode 20:4, 5, haut fleuve.

Ntoma Yoane akomelaki baklisto boye: “Bana na ngai, bóboya banzambe ya bikeko.”​—1 Yoane 5:21, Bible na lingala ya lelo oyo.

MOTUNA: Lingomba yango etosaka mobeko yango ya Biblia oyo epekisi kosalela bikeko to bililingi na losambo?

Okoki komona nzela ya malamu

Na kati ya ebele ya mangomba oyo ezali lelo oyo na mokili, okoki komona lingomba oyo ezali komema na bomoi. Ezali na makambo mingi oyo ekosalisa yo oyeba “losambo na mpɛtɔ mpe lobɔngi epai na Nzambe.” (Yakobo 1:27, haut fleuve) Bavɛrsɛ oyo tosaleli na masolo oyo ekoki kosalisa yo oyeba lingomba yango.

Tolendisi yo osɛnga Batatoli ya Yehova básalisa yo ozwa biyano na mituna oyo ezali na masolo oyo. Ntango bazali kosalisa yo, landá ndakisa malamu ya bato oyo bazalaki kofanda na engumba Beloya, na ekeke ya liboso. Nsima ya koyoka mateya ya Paulo, “mokolo na mokolo bazalaki kotanga Mikanda ya Nzambe, po na koyeba soki makambo balobeli bango ezali ya solo.” (Misala 17:11, Bible na lingala ya lelo oyo) Soki yo mpe ozali komemya Liloba ya Nzambe mpe koyekola yango mokolo na mokolo lokola bato ya Beloya, okomona nzela ya bomoi. Yo moko nde okopona soki okotambola na nzela yango.

Lingomba nini elendisaka bato báyekola makomami mpo na komona soki makambo oyo bazali koteya bango ezali mpenza solo?