Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Toli ya Biblia ezali na ntina lelo oyo?

Toli ya Biblia ezali na ntina lelo oyo?

BATO MOSUSU BAKOLOBA: “TE.” Monganga moko alobaki ete koluka toli na Biblia ezali lokola kotángisa bana-kelasi mateya ya shimi oyo euti na buku moko ya kala, ya bambula 1920. Moto oyo amemyaka Biblia te akoki ata kotuna soki ebongi kosalela ordinatɛrɛ ya kala oyo esilá ngala mpo na kolakisa bato ndenge ya kosalela ordinatɛrɛ oyo ebimi sika. Na maloba mosusu, bato mosusu batalelaka Biblia lokola buku moko oyo esilá ngala.

Mpo na nini moto asengeli kolanda litambwisi ya buku wana ya kala na mikolo oyo mayele ya teknoloji ekoli mingi? Kutu, ebele ya basite Internet mpe bisika oyo bato bakomaka makambo na bango na Internet mpo bato mosusu bámona epesaka ebele ya batoli mpe litambwisi. Baemisyo ya televizyo esalaka ete bato bálanda ebele ya batoli oyo euti na bato ya mayele na pisikoloji, bato minene ya mokili mpe bakomi ya babuku. Longola yango, bato bazali kotɛka ebele ya babuku oyo ezali na batoli ndenge na ndenge, mpe yango ezali kokɔtisa mbongo mingi na bakompanyi.

Lokola lelo oyo batoli ya sika ekómi mingi, mpo na nini moto asengeli kolanda batoli ya Biblia, buku oyo esilá kokomama eleki sikoyo bambula pene na 2000? Ebongi mpenza ete bato oyo bamemyaka Biblia te báloba ete kolanda batoli ya buku ya kala ndenge wana ezali lokola kosalela buku ya shimi to ordinatɛrɛ oyo esilá ngala? Mpo na koloba solo, likanisi wana ezali ya libunga. Mayele ya siansi mpe ya teknoloji ezali kobongwana nokinoki, kasi bamposa ya bato ebongwani te. Banda kala, bato balukaka kaka kozala na bomoi ya malamu, ya esengo mpe ya kimya, kozala na boyokani ya malamu kati na libota, mpe kozala na baninga ya malamu.

Atako Biblia ezali buku ya kala, elobeli bamposa wana mpe makambo mosusu. Ezali mpe buku oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Mozalisi na biso. Etambwisaka biso na makambo nyonso ya bomoi mpe esalisaka biso tóyeba ndenge ya kolonga mikakatano. (2 Timote 3:16, 17) Longola yango, ezali na batoli ya libela, oyo ekoki kosila ngala ata moke te! Biblia yango moko elobi: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi.”​—Baebre 4:12.

Makambo oyo Biblia elobi ezali mpenza solo? Biblia ezali buku oyo esilá ngala, to ezali na bomoi, elingi koloba ezali mpenza na batoli oyo ebongi mpo na biso lelo oyo? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali na mokano ya kosalisa yo ozwa biyano na mituna wana. Oyo ezali lisolo ya liboso na masolo oyo epesi biyano yango.