Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MPO NA NINI KOZALA SEMBO?

Bosembo ememelaka moto matomba

Bosembo ememelaka moto matomba

“Tondimi ya solo ete tozali na lisosoli ya sembo, mpo tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”​—Baebre 13:18.

Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo na bantango mosusu ebongolamaka na “bosembo” elimbolaka “eloko moko oyo ezali mpenza malamu.” Ekoki mpe kolimbola ezaleli moko oyo esepelisaka bato.

Bakristo bazwaka na lisɛki te maloba oyo ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe: “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.” Yango esɛngi nini?

KOBUNDISA BOMOTO NA BISO YA KATI

Bato mingi bamitalaka na talatala ntɔngɔ nyonso liboso bábima. Mpo na nini? Mpo balingaka komonana malamu na miso ya bato. Kasi ezali na eloko moko oyo ezali na ntina mingi koleka kobongisa nsuki to kolata bilamba ya kitoko. Kutu, bomoto na biso ya kati ekoki kobakisa to kokitisa kitoko na biso ya libándá.

Liloba ya Nzambe emonisi polele ete tobendamaka na mposa ya kosala mabe. Ebandeli 8:21, elobi boye: “Motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye.” Na yango, mpo na kozala sembo, tosengeli kobundisa mposa ya kosala masumu oyo tobotamaka na yango. Ntoma Paulo alobelaki bitumba oyo ye moko azalaki kobunda na lisumu; alobaki boye: “Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na binama na ngai.”​—Baroma 7:22, 23.

Na ndakisa, ntango motema na biso ezali kotinda biso tósala mabe mpe tozali na mposa makasi ya kosala makambo ya kozanga bosembo, esɛngi kaka te tókóma moombo ya bamposa ya motema na biso. Tozali kaka na likoki ya kopona. Soki toponi kobwaka makanisi mabe, tokoki kotikala sembo ata soki bato oyo tofandi na bango bazangi bosembo.

NDENGE YA KOLONGA ETUMBA YANGO

Mpo na kozala sembo, tosengeli kolanda batoli oyo etali bizaleli malamu. Kasi, likambo ya mawa, na esika bákanisa batoli oyo etali bizaleli malamu, bato mingi basalaka makambo ndenge balingi. Yango wana, bamilongisaka na makambo ya kozanga bosembo oyo eyokani na bamposa na bango. Buku moko (The [Honest] Truth About Dishonesty) elobeli yango boye: “Mingimingi, bato bakosaka na nivo oyo ekosala ete bámonana ete bazali kaka sembo.” Ezali nde na batoli oyo tokoki kotyela motema, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba soki ezali na makambo ya kozanga bosembo oyo ekoki kondimama to te? Likambo ya esengo, batoli yango ezali.

Bamilio ya bato na mokili mobimba bamoni ete Biblia ezali mpenza na batoli yango. Batoli oyo ezali na Biblia eleki batoli mosusu nyonso. (Nzembo 19:7) Na ndakisa, esalisaka na makambo etali libota, mosala, bizaleli malamu mpe makambo ya Nzambe. Biblia esilaka ngala te. Mibeko mpe batoli na yango etali bato ya ndenge nyonso, ata soki bazali bato ya bikólo nini, mindɛlɛ to baindo. Soki tozali kotánga Biblia mpe kokanisa makambo yango na mozindo, tosaleli batoli na yango, tokomesanisa motema na biso na makambo ya bosembo.

Ata bongo, bitumba mpo na kolonga makambo ya kozanga bosembo ezali makasi koleka kozwa boyebi ya solosolo ya Biblia. Kutu, tofandi na mokili oyo etondi na bizaleli mabe mpe ezali kotya biso mbamba tólanda bizaleli na yango. Yango wana tosengeli kobondelaka Nzambe asalisa biso. (Bafilipi 4:6, 7, 13) Soki tosali bongo, tokozala na mpiko ya kokangama na oyo ezali malamu mpe kozala sembo na makambo nyonso.

MATOMBA OYO BOSEMBO EBIMISAKA

Hitoshi, oyo tolobelaki na lisolo ya ebandeli, azwaki litomba ndenge ayebanaki lokola moto oyo asalaka mosala na bosembo. Lelo asalaka epai ya patrɔ moko oyo asepelaka na bosembo na ye. Hitoshi alobi boye: “Nasepelaka ndenge nazwaki mosala mosusu oyo esalisaka ngai nazala na lisosoli ya pɛto.”

Bato mosusu mpe bamoni ete ezali bongo. Tózwa mwa bandakisa ya baoyo bazwaki matomba mpo basalelaki toli ya Biblia oyo esɛngi “kozala sembo na makambo nyonso.”

  • Lisosoli ya pɛto

    “Nakataki kelasi ntango nazalaki na mbula 13 mpo nasala na miyibi. Yango wana, mbongo mingi oyo nazalaki na yango (95%) nazwaki yango na kozanga bosembo. Na nsima, nabalaki mpe ngai ná mobali na ngai tokómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Toyekolaki ete Yehova * Nzambe ayinaka makambo ya kozanga bosembo, yango wana tozwaki ekateli ya kobongola bomoi na biso. Tozwaki batisimo na 1990 mpe tokómaki Batatoli ya Yehova.”​—Masese 6:16-19.

    “Na kala, ndako na ngai etondaki na biloko ya kimoyibi, kasi sikoyo ezalaka lisusu na biloko yango te mpe yango esalaka ete lisosoli na ngai etungisama te. Soki nakanisi bambula mingi wana ya kozanga bosembo, napesaka Yehova mersi mpo na motema mawa monene na ye. Nasepelaka mpenza ntango nalalaka na likanisi ete Yehova asepelaka na ngai.”​—Cheryl, Irlande.

    “Ntango patrɔ na ngai ayebaki ete naboyaki kanyaka oyo kiliya moko alingaki kopesa ngai, alobaki na ngai boye: ‘Nzambe na yo akómisi yo moto ya kotyela motema mpenza! Ezali mpenza lipamboli kozala na yo na kompanyi na biso.’ Kozala sembo na makambo nyonso esalisaka ngai nazala na lisosoli ya pɛto na miso ya Yehova Nzambe. Esalisaka ngai mpe nasalisa libota na ngai mpe bato mosusu bázala mpe bongo.”​—Sonny, Hong Kong.

  • Kimya na makanisi

    “Nazali mokambi-molandi na banki moko ya monene. Na mosala yango, kokóma na mbongo mingi ezali na ntina koleka kozala sembo. Likanisi oyo bato mingi bazalaka na yango ezali ete ‘mabe ezali wapi na kozanga mwa bosembo soki ekosala ete okóma mozwi mpe ekotombola ekonomi?’ Kasi kozala sembo epesaka ngai kimya na makanisi. Nazali na ekateli ya kotikala sembo mpe kondima likambo nyonso oyo ekoki kokómela ngai. Bapatrɔ na ngai bayebi ete nakokosa bango te mpe nakoki kokosa te mpo na bango.”​—Tom, États-Unis.

  • Kopesa nzoto kilo

    “Mokonzi na ngai ya mosala alobaki nakosa mpo na mwa biloko oyo ebungaki na mosala kasi naboyaki. Nsukansuka ntango miyibi bayebanaki, patrɔ na ngai apesaki ngai mersi mpo na bosembo na ngai. Esɛngaka mpiko mpo na kozala sembo na mokili oyo ezangi bosembo. Kasi na nsuka, bato bakotyela biso motema mpe bakopesa biso kilo.”​—Kaori, Japon.

Lisosoli ya pɛto, kimya na makanisi mpe kopesa nzoto kilo ezali mbano oyo emonisi ete bosembo ememelaka mpenza moto matomba. Ondimi yango?

^ par. 18 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.