Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Bomoi ebandaki ndenge nini?

Bomoi ebandaki ndenge nini?

Okopesa eyano nini?

BOMOI EUTÁ NA ․․․․․.

  1. EVOLISYO

  2. BOZALISI

BATO mosusu bakoki koloba ete moto ya siansi akopona “evolisyo” mpe moto oyo asambelaka akopona “bozalisi.”

Kasi ezalaka ntango nyonso bongo te.

Emonani ete bato mingi oyo batángá, ata mpe bato mosusu ya siansi, bandimaka liteya yango mpenza te.

Tózwa ndakisa ya Gerard, profesɛrɛ moko oyo ayekolaka banyama mikemike (entomologiste), oyo bateyá ye evolisyo na iniversite. Alobi boye: “Na baekzamɛ, nazalaki kopesa biyano ndenge baprofesɛrɛ batángisaki biso, kasi ngai moko nazalaki kondima yango te.”

Mpo na nini ata bato mosusu ya siansi bazalaka na mokakatano ya kondima ete bomoi eutá na evolisyo? Mpo na kozwa eyano, tótalela mituna mibale oyo elekelaka bato mingi ya mayele: (1) Bomoi ebandá ndenge nini? (2) Ndenge nini bikelamu mosusu ya bomoi ebimá?