Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Naboyaka kotya makanisi na maladi na ngai”

“Naboyaka kotya makanisi na maladi na ngai”

“Ezalaki kosɛnga moto asalisa ngai mpo namata mpe nakita na mbeto. Kotambola ezalaki mpasi. Mongongo na ngai ekangamaki, mpe nazalaki kokoka ata komɛla nkisi ya kokitisa mpasi te. Nakómaki na bampota oyo esilaka te; mosusu ekómaki kolya nzoto na ngai. Estoma na ngai esalaki bampota mpe ekómaki kosala ngai motema mɔtɔ. Nayebaki te nini ezalaki koyela ngai. Nazalaki na mbula 10 mpamba.”​—Elisa.

Atako azali na maladi, Elisa asepelaka koteya basusu Biblia

BASALELAKA liloba sclérodermie, oyo elimboli “loposo makasi,” mpo na kolobela bamaladi oyo ezali konyokola bato soki milio mibale na ndambo na mokili mobimba. Lolenge ya maladi yango oyo ezwaka mbala mingi bana ezali sclérodermie locale, oyo ekómisaka mingimingi loposo ya nzoto makasi.

Kasi, oyo bazwaki Elisa ntango azalaki na mbula 10 ezalaki sclérodermie générale, oyo ekoki kobebisa loposo ya nzoto mpe binama mosusu na kati ya nzoto, na ndakisa bangɛi, motema, bapumɔ, estoma mpe misɔpɔ. Minganga bakanisaki ete bankisi oyo bakopesa Elisa ekobakisela ye kaka mbula 5 ya bomoi. Eleki sikoyo mbula 14, Elisa azali kaka na bomoi. Atako abiká te, atalelaka bomoi na ndenge ya malamu. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna mpo na maladi na ye mpe ndenge oyo azwaka makasi mpo na koyikela yango mpiko.

Ndenge nini oyebaki ete maladi ekɔti na nzoto?

Ntango nazalaki na mbula 9, nazokaki na molɔku (coude), mpe ezalaki koswa makasi mpenza. Mpota yango ekómaki monene, mpe ezalaki kosila te. Ntango batalaki ngai makila na lopitalo, bamonaki ete nazali na maladi ya sclérodermie générale. Lokola nzoto na ngai ezalaki kobeba nokinoki, esɛngaki tóluka monganga oyo ayebi malamu kosalisa maladi yango.

Esukaki ndenge nini?

Tomonaki monganga moko oyo asalisaka maladi ya mingai. Mwasi yango ayebisaki baboti na ngai ete soki basaleli mayele babengi chimiothérapie, maladi na ngai ekozala lisusu makasi te, ekoki kobakisela ngai mbula 5 ya bomoi, to mpe mbala mosusu ekoki kosilisa maladi yango. Mabe ya mayele yango ezalaki ete nzoto na ngai ekokoka lisusu kobundisa bamaladi te. Ata maladi ya miyoyo ekokaki koboma ngai.

Kasi tii lelo ozali na bomoi.

Ɛɛ, nakufi te, nazali na bomoi! Kasi, ntango nakómaki na mbula soki 12, nakómaki koyoka mpasi makasi na ntolo, ezalaki koumela miniti soki 30, mpe na bantango mosusu ezalaki kosala ngai bongo mbala mibale na mokolo. Mpasi yango ezalaki makasi mpenza mpe nazalaki koganga na kolela.

Mpo na nini ozalaki koyoka bongo?

Minganga bamonaki ete makila na ngai ekitaki makasi mpe motema na ngai ezalaki kobunda mingi mpo makila ekóma tii na bɔɔngɔ. Nsima ya mwa bapɔsɔ, bankisi oyo nazwaki esalisaki ngai. Kasi, na ntango yango, nakómaki komona ete likambo moko ekoki kokómela ngai lelo to lobi. Makasi nyonso esilaki ngai; nazalaki koyeba te nini ezali koyela ngai.

Esali mbula 14 banda maladi na yo eyebaná. Sikoyo nzoto na yo ezali ndenge nini?

Nayokaka kaka mpasi, mpe nazali na bamaladi mosusu ya mikemike oyo eutaka na sclérodermie. Na ndakisa bampota na nzoto, maladi ya bapumɔ, mpe motema mɔtɔ mpenza. Atako bongo, naboyaka kotya makanisi na maladi na ngai to mpe kozala ntango nyonso mawamawa. Nazali na makambo mosusu ya kosala.

Makambo nini?

Nalingaka kosala mayemi, kotonga bilamba mpe kosala babiju. Kasi, oyo eleki ntina, lokola nazali Motatoli ya Yehova, nateyaka bato Biblia. Ata ntango nakoki te kotambola mpo na kokende epai ya bato, nazalaka elongo na Batatoli mosusu oyo bateyaka bato mosusu Biblia pembeni na biso. Kutu, nazwaki bato ya koyekola na bango Biblia. Mosala ya kosakola esalaka ete bomoi na ngai ezala na ntina.

Mpo na nini omipesaka na mosala yango, atako ozali na makambo oyo etungisaka yo?

Nayebi ete makambo oyo nayebisaka bato ezali na ntina mingi mpe esalisaka. Longola yango, ntango namipesi na koteya basusu ndenge wana, nayokaka esengo makasi. Kutu, nayokaka nzoto malamu! Ntango nazali kosala mosala yango, nabosanaka ete nazali na maladi.

Ndenge nini Biblia esalisaka yo obatela elikya?

Esalisaka ngai nabosana te ete bampasi na ngai, mpe ya bato mosusu, ezali ya ntango mokuse. Emoniseli 21:4 elobi ete na ntango oyo Nzambe atyá, “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” Kokanisa bavɛrsɛ lokola oyo wana ekómisaka kondima na ngai makasi na elaka kitoko oyo Nzambe apesi mpo na avenire, kaka te mpo na bato oyo babɛlaka maladi oyo esilaka te, kasi mpe mpo na bato nyonso.