Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

États-Unis

Ankɛtɛ moko emonisaki ete kati na bato misato oyo batambolaka na makolo, moko na bango ayokaka miziki, asololaka na telefone to asalaka makambo mosusu ntango azali kokatisa balabala oyo etondi na mituka. Likambo oyo elongolaka mpenza likebi ezali kotinda bamesaje na telefone. Bato oyo basalaka bongo bazwaka ntango mingi mpo na kokatisa balabala koleka bato oyo batyaka likebi ntango bazali kokatisa; mpe mingi na bango bakipaka te miinda oyo ezali na balabala, bakatisaka na bisika oyo esengeli te to kozanga kotala ngámbo na ngámbo.

Nigéria

Liboso bámema basi ya Nigeria na Mpoto na ndenge ya moyibi, bato oyo bamemaka bango basalisaka bango mwa milulu ya kolapa ndai na bandako ya banganga mpo bábomba sekele. Lokola basi yango babangaka ete bilimo mabe bápesa bango etumbu soki babimisi sekele, yango wana bato yango bakonzaka bango mpe bakómisaka bango baombo ya kosangisa nzoto.

Espagne

Mwa bato mosusu (5% to 10%) oyo baumelá mingi kozanga kozwa mosala balobelaka te badiplome oyo bazwá na iniversite to mosala oyo basalá ntango bakei koluka mosala noki báboya kozwa bango.

Mokili

Emonani ete moko ya makambo oyo ebomaka bato mingi na bikólo ya bobola ezali milinga ya mɔtɔ ya nkoni to ya makala; na bikólo yango, mbula na mbula bato milio minei bakufaka na maladi ya mpema oyo eutaka na milinga yango. Bato ya mayele balobi ete biloko mabe oyo milinga yango ebimisaka ekokani na pwazɔ oyo ya milinga ya makaya.