Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Libala

Libala

Libala ezali kaka boyokani ya bato mibale?

“Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

OYO BIBLIA ELOBI

Na miso ya Nzambe, libala ezali kaka te boyokani ya bato mibale. Ezali eloko moko ya bosantu. Biblia elobi boye: “Banda ebandeli ya bozalisi ‘[Nzambe] asalaki bango mobali ná mwasi. Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’ . . . Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” *​—Marko 10:6-9; Ebandeli 2:24.

Maloba “oyo Nzambe akangisi [to asangisi] esika moko,” elimboli te ete Nzambe abongisaka mabala na likoló. Kutu, ntango Biblia elobi ete Nzambe nde azali mobandisi ya libala, emonisaka nde ete libala ezali likambo ya lisɛki te. Mwasi ná mobali oyo batalelaka libala ndenge wana, bamonaka ete ezali bosantu, esengeli koumela, yango wana basalaka makasi mpo libala na bango ezala malamu. Libala ekómaka malamu lisusu soki mwasi ná mobali bazali kosalela batoli ya Biblia mpo na kokokisa mikumba na bango.

Mokumba ya mobali ezali nini?

“Mobali azali mokonzi ya mwasi na ye.”​Baefese 5:23.

OYO BIBLIA ELOBI

Mpo libota etambola malamu, moto moko asengeli kozwaka bikateli ya nsuka. Biblia epesi mobali mokumba yango. Yango elingi koloba te ete asengeli kozala moto oyo bakakolaka maloba na ye te to oyo anyokolaka basusu. Elingi mpe koloba te ete asengeli kokima mikumba na ye, mpo yango ekosala ete mwasi na ye atosa ye te mpe amema mokumba oyo ebongi na ye te. Kutu, Nzambe alingi nde ete mobali asala mosala makasi mpo na kosalisa mwasi na ye mpe apesa ye lokumu lokola moninga na ye ya motema. (1 Timote 5:8; 1 Petro 3:7) Baefese 5:28 elobi ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.”

Mobali oyo alingaka mpenza mwasi na ye azwaka na valɛrɛ makoki oyo mwasi na ye azali na yango mpe atalelaka makanisi na ye na limemya nyonso, mingimingi na makambo oyo etali mpenza libota. Asengeli te kokangama na oyo alobi kaka mpo azali mokonzi ya libota. Ntango Abrahama moto ya sembo aboyaki koyoka toli malamu ya mwasi na ye na likambo etali libota, Yehova Nzambe alobaki na ye boye: “Yoká mongongo na ye.” (Ebandeli 21:9-12) Na komikitisa nyonso Abrahama andimaki mpe kimya mpe bomoko ekɔtaki na libota na bango, mpe Nzambe apambolaki bango.

Mokumba ya mwasi ezali nini?

“Basi, bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko.”​—1 Petro 3:1.

OYO BIBLIA ELOBI

Liboso Nzambe asalela mobali ya liboso mwasi, alobaki boye: “Ezali malamu te moto azala ye moko. Nakosalela ye mosungi, oyo abongi na ye.” (Ebandeli 2:18) Mwasi ná mobali basengelaki kosungana na mikumba na bango. Boye, Nzambe akelaki mwasi mpo azala ndenge moko na mobali te to awela esika ya mobali, kasi nde azala mosungi na ye. Bango mibale bakokaki kokokisa mokumba oyo Nzambe apesaki ya kobota bana mpe kotondisa mokili.​—Ebandeli 1:28.

Mpo na kosalisa mwasi akokisa mokumba na ye, Nzambe apesá ye nzoto, makanisi, mpe bizaleli mosusu oyo ebongi na ye. Soki azali kosalela yango na bwanya mpe na bolingo, akosala mpenza ete libala na ye ezala malamu mpe akosalisa mobali na ye amiyoka malamu mpe azala na kimya ya motema. Na miso ya Nzambe, mwasi malamu ya ndenge wana abongi bákumisa ye. *​—Masese 31:28, 31.

^ par. 5 Biblia epesi nzela ete libala ekufa kaka na likambo ya ekobo.​—Matai 19:9.

^ par. 14 Babalani bakoki kozwa batoli mingi na likambo etali libala mpe bomoi ya libota na lisolo “Lisalisi mpo na libota,” oyo ebimaka mbala na mbala na Lamuká!