Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Mokili

Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) emonisi ete kopema milinga ya motɛrɛ oyo esalaka na mazuti “ekoki kosala ete moto azwa kanser ya pumɔ” ata mpe kanser ya libenga ya masuba.

Mokili ya Antarctique

Mwa pudrɛ oyo ezalaka na bafololo (pollen) oyo ekómá libanga, oyo bato ya arkeoloji bamonaki na bosoto oyo efandaka na nse mpenza ya Mbu emonisi ete eleki bambula mingi, banzete ya mbila ezalaki kobota na Antarctique, ata mpe banzete mosusu oyo ebotaka kaka na mikili ya molunge. Bato mingi bakanisaka ete bamilio ya bambula liboso, na mokili yango “malili ezalaki mpenza mingi te” na eleko ya malili, mpe na nɔrdi mpe sudi mpenza ya mabele, malili to molunge ekesanaki mpenza te na oyo ezalaka na équateur.

Irlande

Lapolo moko oyo Lisangá ya basango ya Lingomba ya Katolike ya Irlande ebimisaki na mobu 2012 emonisi ete bandimi mingi ya katolike (87%) oyo batunaki bango mituna na ekólo yango balobi ete basango basengeli kobala; (77%) balobi ete basi mpe basengeli kokóma basango.

Bikólo ya Afrika oyo ezali na Sudi ya Sahara mpe bikólo ya Sudi-Ɛsti ya Azia

Bato oyo bayekoli nkisi ya malaria malamumalamu bamonisi ete na bisika mosusu, mbala mingi nkisi yango ezalaka ya malamu te to ya monyato, esilisaka maladi ya malaria te. Na sudi-ɛsti ya Azia, emonani ete bankisi mosusu (36%) ezalaki mpe ya monyato, ndenge moko mpe na bankisi mosusu (20%) oyo ezalaki na bikólo ya Afrika oyo ezali na sudi ya Sahara.

El Salvador

Na katikati ya sanza ya minei ya mobu 2012, bakonzi ya guvɛrnema ya ekólo yango bapesaki nsango ete na bambula misato oyo eutaki koleka, ezalaki mbala ya liboso bazwa nsango ete bato mabe babomi ata moto moko te na esika boye to boye. Na 2011, bato 69 kati na bato 100 000 babomamaki mpo na mobulu oyo bato oyo basalelaka drɔgɛ babimisaki na ekólo yango​—ezali moko ya motángo oyo eleki monene na mokili mobimba.