Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Osengeli kofuta mpo na mosala oyo lingomba esaleli yo?

Osengeli kofuta mpo na mosala oyo lingomba esaleli yo?

Biblia elobi nini?

Osengeli kofuta mpo na mosala oyo lingomba esaleli yo?

NA MIKILI mingi, bakonzi ya mangomba oyo emibengaka ya bokristo mpe mangomba mosusu bafutisaka bato mbongo mpo na kosalela bango makambo. Makambo yango ekoki kozala, batisimo, libala, to molulu ya kokunda mowei. Mbongo oyo basɛngaka ekoki kozala bankama ata mpe bankóto ya badolare.

Basango mosusu bafutamaka na guvɛrnema mpo na milulu oyo basalaka mpe mokumba ya kobatela etonga mpe mpo na mabondeli oyo basalaka liboso bakonzi ya Leta bábanda kolobela makambo etali mibeko ya mboka. Bato bakoki kosepela na misala yango, mpe mangomba ezalaka na mposa ya mbongo mpo etambwisama malamu. Kasi, Biblia endimaka mimeseno wana ya kofutisa misala oyo lingomba ekoki kosalela bato to kotinda bato bámona ete basengeli kofuta mbongo mpo na misala yango?

“Ndako ya mombongo”?

Ntango Yesu Kristo azalaki awa na mabele, bakonzi ya Lingomba ya Bayuda mpe bato mosusu bazalaki kosalela mabaku ya losambo mpo na kozwela yango matomba, mingimingi na eleko ya Pasika. Yesu asepelaki na likambo yango? Te! Kutu, Biblia eyebisi biso ete “asopaki mbongo ya bibende ya bato oyo basenzaka mbongo mpe abalolaki bamesa na bango.” Alobaki ete: “Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai ndako ya mombongo!”​—Yoane 2:14-16.

Likambo ya ndenge wana emonanaki mpe na ntango ya mosakoli Mika, oyo azalaki na bomoi na boumeli ya ekeke ya mwambe liboso ya ntango na biso. Biblia elobi ete bakonzi ya mangomba ya Bayisraele ‘bayinaki bosembo,’ mpe banganga-nzambe ‘bazalaki kolakisa kaka mpo na lifuti.’ Kasi, kaka na ntango yango bazalaki koloba ete Nzambe azali kosunga bango; bazalaki koloba boye: “Yehova azali nde katikati na biso te?” (Mika 3:9, 11) Kasi, Yehova Nzambe azalaki na katikati na bango te mpo na kosunga bango. Kutu, azalaki koyina etamboli na bango mpe amonisaki yango polele na nzela ya mosakoli na ye.

Lelo oyo bakonzi mingi ya mangomba balandá kaka mayele yango wana ya lokoso, yango wana bakómisá bisika na bango ya losambo, ‘bandako ya mombongo.’ Kutu, Lingomba, na mobimba na yango, emikɔtisá na makambo ya mombongo, mbala mingi mombongo oyo ebimiselaka bango mbongo mingi, batɛkisaka bikeko ya losambo mpe biloko mosusu mingi ya losambo. *​—1 Yoane 5:21.

“Bozwi ofele, bópesa ofele”

Ntango apesaki bayekoli na ye mokumba ya kosakola nsango malamu, kobikisa bato ya maladi, ata mpe kosekwisa bakufi, Yesu alobaki boye: “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Matai 10:7, 8) Ya solo, bayekoli na ye ya solosolo basengelaki te kofutisa bato mbongo mpo na mosala oyo basalaki. Lisusu, Yesu ye moko atiká ndakisa malamu ndenge asalelaki bato mosusu kozanga ete báfuta ye.

Lokola alandaki ndakisa ya Yesu, ntoma Paulo asalaki mosala na ye ya kosakola “kozanga koluka lifuti.” (1 Bakorinti 9:18) Ntango azalaki na mposa ya mbongo, asalaki mosala ya kotonga bahema. (Misala 18:1-3) Yango wana akokaki koloba mpo na ye moko mpe misionɛrɛ mosusu ete: “Tozali te bato oyo batɛkaka liloba ya Nzambe ndenge bato mingi bazali.” (2 Bakorinti 2:17) Kasi, ezali boni mpo na kozwa mbongo oyo lisangá ekoki kosalela, ntango mosusu kosomba to kofutela esika mpo na losambo?

“Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”

Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo oyo basengeli na yango na makabo ya bolingo malamu oyo bato bapesaka. Basalelaka etinda oyo: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakorinti 9:7) Yango wana, Batatoli bafutisaka bato mbongo te mpo na mikanda na bango to mpo na mosala moko etali lingomba oyo basalaka, na ndakisa kopesa batisimo, kosalela moto molulu ya libala, to molulu ya kokunda mowei. Basɛngaka mpe te dimɛ, to balekisaka te kitunga na makita na bango mpo na kokɔngɔla mabonza. Moto nyonso oyo alingi kopesa likabo mpo na kosimba mosala na bango ya kosakola akoki kotya mbongo na bakɛsi oyo ezalaka na bisika na bango ya losambo.

Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova batongaka bisika na bango ya losambo, biro oyo etambwisaka misala na bango, mpe bisika oyo ebimisaka mikanda na bango, ata mpe kosunga bato oyo bakweli makama na mbongo ya makabo oyo bapesaka na bolingo malamu. Bamosusu, lokola mwasi mobola oyo Yesu akumisaki, bakoki kopesa kaka moke oyo bazali na yango. (Luka 21:2) Bamosusu bakoki kopesa ebele. Ata soki moto apesi moke to mingi, baoyo batosaka mitinda oyo ezali na Biblia mpe bapesaka na kotalela makoki na bango basepelaka, bazwaka mapamboli ya Nzambe, mpe bazalaka na esengo ya solosolo.​—Misala 20:35; 2 Bakorinti 8:12.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 8 Talá lisolo “Biblia elobi nini? Ebongi kosambela Nzambe na nzela ya bikeko?” na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ–Desɛmbɛ 2008.

OSILÁ KOMITUNA?

● Yesu alobaki nini na baoyo bazalaki kosala mombongo na tempelo?​—Yoane 2:14-16.

● Ntoma Paulo alukaki báfuta ye mpo na mosala ya Nzambe oyo azalaki kosala?​—2 Bakorinti 2:17.

● Makabo ya ndenge nini esepelisaka Yehova?​—2 Bakorinti 9:7.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 21]

“Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai ndako ya mombongo!”​—Yoane 2:14-16