Engebene Biblia
Engebene Biblia
Okoki kosalisa bato oyo bakufá?
“Banda Lingomba ya Katolike ebandá . . . ebondelaka mpo na [bato oyo bakufá] . . . mpo bápɛtolama mpe bázala na esengo monene ya komona Nzambe.”—“Katekisimo ya Lingomba ya Katolike” (na Lingelesi).
BATO nyonso bamitungisaka mpo na bato oyo bakufá. Mbala mosusu yo mpe oyokaki mpasi mingi na motema ntango obungisaki moto oyo olingaka. Okoki mbala mosusu komituna soki bato oyo bakufá bayebaka makambo, bayokaka mpasi to bazali na kimya mpe soki okoki kosalisa bango.
Bandimi mingi bakanisaka ete bakoki kosalisa bato oyo bakufá. Na ndakisa, Bahindu bakanisaka ete soki batumbi ebembe ya ndeko na bango na libongo ya Ebale Gange mpe bapanzi putulu na yango na ebale wana, molimo na ye ekozwa bisengo ya seko. Na Azia ya ɛsti, bandimi ya Lingomba ya Bouddha batumbaka mituka, bandako, bilamba mpe mbongo, oyo basalá yango na papye mpo bakanisaka ete moto oyo akufi akosalela biloko yango na mokili mosusu epai akei. Na Afrika, basopaka masanga pembeni ya lilita ya mowei mpamba te bakanisaka ete akomɛla yango.
Lingomba ya Katolike eteyaka ete soki moto akufi kozanga kobongola motema mpo na “lisumu monene oyo asalaki na nko,” Nzambe akondima ye te. Yango nde “babengaka ‘lifelo.’” Nzokande, lingomba yango eteyaka mpe ete moto oyo Nzambe andimi akoki kolikya kozwa “bolamu ya seko oyo eleki bolamu nyonso” elongo na Nzambe kuna na likoló, kasi moto yango asengeli kopɛtolama malamumalamu liboso. Mbala mosusu mpo na kopɛtolama, esengeli
akenda na epongelo epai kuna “akopɛtolama na mɔtɔ” lokola etumbu mpo na masumu na ye oyo ekoki kolimbisama. Kasi wana azali naino na epongelo, lingomba ekoki kosala mabondeli mpe misa mpo na kosalisa ye. Mbala mingi, bandeko ya mowei ná baninga na ye nde bafutaka mbongo mpo na milulu yango.Ezali mabe te koluka kosala nyonso oyo okoki mpo na kolɛmbisa bampasi oyo bandeko na yo oyo bakufá bazali ntango mosusu koyoka. Kasi, soki esengelaki kosalisa bango, Nzambe alingaki te komonisa polele ndenge ya kosala yango? Tótalela oyo Biblia eteyaka na likambo ya kosalisa bakufi.
Bato oyo bakufá bazalaka ndenge nini?
Mimeseno nyonso oyo tolobeli na ebandeli euti na liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te, elingi koloba eloko moko oyo ezalaka na kati ya moto ekobaka kozala na bomoi soki akufi. Biblia eteyaka mpenza bongo? Biblia elobi ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana. Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba; bazali lisusu na likabo te kati na likambo ezali kosalama na nse na moi. Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi [sheohl ], esika ekokende yo.” (Mosakoli 9:5, 6, 10) Liloba ya Liebele sheohl elimboli malita ya bato nyonso.
Mpo na komonisa ndenge makanisi ya moto ekómaka soki akufi, mokomi na nzembo alobaki boye: “Soki [elimo, NW] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”—Nzembo 146:4.
Maloba ya Biblia ezali malamu mpe ebongi kotyelama motema. Okanisi boni, tata ya bolingo akoki nde konyokola bana na ye mpo na bomoto na bango ya masumu? (Genese 8:21) Soki moke te. Na yango, mpo na nini Tata na biso ya likoló asala bongo? Na Yisalaele ya kala, ntango bato mosusu balandaki momeseno ya bapakano ya kotumba bana na bango mbeka mpo na banzambe ya lokuta, Yehova aboyaki mpenza momeseno wana mabe mpe alobaki ete ‘alakaki bango boye te mpe eyaki ata kati na motema na ye te.’—Yilimia 7:31.
Bato bakufaka mpo na lisumu, kasi te mpo bányokwamaka nsima ya liwa. Makomami elobi ete “lifuta oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa,” mpe “moto oyo akufi alongwe na ngambo ya lisumu na ye.”—Baloma 5:12; 6:7, 23.
Bakufi banyokwamaka te. Ezali lokola nde balali mpɔngi makasi mpe bayebi likambo moko te, ezala likambo ya esengo to te. Ntembe ezali te ete milende nyonso oyo bato basalaka mpo na kosalisa bakufi eyokani te na mateya ya Biblia.
Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?
Yango elingi koloba te ete bandeko na yo oyo bakufá bakoyeba lisusu eloko te mpo na libela. Kutu, bazali nde na elikya moko kitoko.
Liboso Yesu asekwisa moninga na ye Lazalo, alobaki ete azali kokende “kolamwisa ye na mpɔngi.” (Yoane 11:11) Mokolo mosusu, alobaki ete “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Bato oyo bakosekwa bakozala te na ngambo ya masumu na bango ya liboso mpe bakonyokwama te mpo na makambo oyo basalaki liboso bákufa. Bakozwa nde libaku ya kosepela na bomoi ya malamu mpenza. Oyo nde elikya kitoko!
Soki elikya yango esepelisi yo, kokakatana te mpo na koluka koyeba soki bilaka wana ebongi kotyelama motema. Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo.
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Bakufi bayebaka makambo?—Nzembo 146:4; Mosakoli 9:5, 6, 10.
◼ Nzambe akoki kopesa nzela ete bakufi bányokwama na lifelo ya mɔtɔ?—Yilimia 7:31.
◼ Elikya nini ezali mpo na bakufi?—Yoane 5:28, 29.