Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mexique: Bango mibale bayekolaki ekomeli ya bato bakufá miso

KOSAKOLA MPE KOTEYA NA MOKILI MOBIMBA

Amerika

Amerika
  • MIKILI 57

  • BATO 998 254 087

  • BASAKOLI 4 154 608

  • BAYEKOLI YA BIBLIA 4 353 152

“Tokoyekola yango biso mibale”

Ismael, oyo afandaka na Mexique, azwaki ekateli ya kotánga Biblia mobimba. Liboso miso na ye ekufa, atángaki yango mbala mibale mobimba na mbula moko. Nsima ya mwa bambula, Ángel, oyo azali Motatoli ya Yehova, akutanaki na Ismael mpe ayebisaki ye makambo oyo Nzambe alaki. Ismael azalaki mpenza na mposa ya koyeba makambo mingi kasi alobaki, “nakufá miso; nazangi likoki ya kotánga Biblia.”

Ángel akitisaki ye motema mpe alobaki, “komitungisa te, nakolakisa yo ekomeli ya bato bakufá miso.”

Ismael atunaki ye, “oyebi ekomeli yango?”

Ángel ayanolaki, “nayebi te, kasi tokoyekola yango biso mibale.” Ismael andimaki te ete Ángel akokaki kosala bongo mpo na ye. Kasi Ángel azongaki na ndako, mpe asalaki bolukiluki mpo na koyeba ndenge ya kotánga ekomeli ya bato bakufá miso mpe abongisaki balɛtrɛ ya alfabɛ na mwa eteni ya kartɔ. Na nsima, akómaki kolakisa Ismael ndenge ya kotánga ekomeli ya bato bakufá miso. Eumelaki te, Ismael ayebaki alfabɛ ya ekomeli yango, akómaki koyangana na makita mpe kotánga mikanda na biso na ekomeli ya bato bakufá miso. Lelo oyo, Ángel ayekolaka Biblia na bato minei oyo bakufá miso. Bato yango basepelaka kolobela paradiso, epai bakozala na likoki ya komona lisusu.

Ayebaki ye lisusu te

Na États-Unis, ndeko mwasi Viannei oyo azali na mbula 14, akomi boye: “Ntango molakisi moko ayaki kotángisa biso makambo etali sciences sociales mpo molakisi na biso azalaki te, akómaki kolobela makambo etali mangomba. Alobaki tótánga mwa mangomba, yango wana natángaki Batatoli ya Yehova. Baninga na ngai ya kelasi basɛkaki mpe balobaki ete tolekiselaka bango ntango, tozangaka makambo ya kosala mpe babwakaka mikanda na biso. Molakisi yango mpe alobaki mabe na ntina na biso.

“Yango wana nabondelaki Yehova apesa ngai makasi ya kopesa litatoli. Nayebisaki bango ete tokendaka na bandako na bango mpo na kolekisela bango ntango te, kasi mpo Yehova atindaka biso tópesa bango toli ya malamu oyo euti na Biblia. Nayebisaki bango bábwakaka mikanda na biso te mpo ekoki kobongola bomoi na bango mpe kobikisa bango. Molakisi asɛngaki bolimbisi mpe alobaki ete mbala ya nsima oyo Motatoli moko akoya na ndako na ye, akoyamba ye, akoyoka ye mpe akotánga mikanda na biso. Nandimaki te ete akosala ndenge alobaki.”

“Sanza minei na nsima, nakutanaki na ye, mpe likambo ya kokamwa, akómaki koyekola Biblia. Nsima ya sanza motoba oyo elandaki, alukaki ngai na eteyelo mpe apesaki ngai matɔndi ndenge napesaki ye litatoli. Kutu nayebaki ye lisusu te mpo akataki nsuki mpe mandefu. Azali sikoyo mosakoli oyo azwi naino batisimo te.”

Kosakola na Amazonie

Na mbula oyo eleki, Batatoli ya Yehova na Brésil batyelaki etúká monene ya Amazonie likebi mpenza. Mingi ya bato oyo bafandaka na etúká yango bazwá naino te libaku ya koyoka nsango malamu. Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi endimaki ete kampanye moko sipesiale ya mbula mobimba esalema na etúká yango mpo na kopesa litatoli epai ya ebele ya bato oyo bafandaka na bisika ya mosika mpenza ya Amazonie.

Brésil: Kosakola na Amazonie

Betele ya Brésil eponaki bingumba 53 oyo ezwami pembenipembeni ya bamai na bisika ndenge na ndenge ya Amazonie mpo basakoli ya Bokonzi bápesa litatoli kuna na boumeli ya eleko yango. Kaka nsima ya sanza minei mpamba, basakoli koleka 6 500 bandimaki kokende kosakola kuna.

Na Anamã, engumba moko ya mosika mpenza epai ata mosakoli moko te azalaki, bandeko zomi, basi ná mibali bafandaki kuna na boumeli ya mikolo 11, bakabolaki mikanda koleka 12 500 mpe babandaki koyekola Biblia na bato soki 200, mpe boyekoli yango ezali kokoba sikoyo na nzela ya telefone. Ntango bazalaki kuna, bandeko basalaki mpe makita. Na likita ya nsuka, liboso bátika engumba yango, basepelaki ndenge bato 90 bayanganaki. Mbuma oyo kampanye yango ebimisi emonani naino nyonso te.

Asɛngaki moninga na ye ya kelasi akɔta na site jw.org

Na boumeli ya mbula motoba oyo eleki, Jehizel ná Mariana bazalaki kotánga kelasi moko na Vénézuéla. Lokola Jehizel azali Motatoli ya Yehova, Mariana azalaki kotyola ye ntango nyonso. Mariana azalaki kokanisa mpenza ete Jehizel ayebi te ndenge ya kosepela na bomoi. Mokolo moko, ntango Mariana alobelaki ye mabe mingi, etindaki ndeko na biso Jehizel aloba: “Mariana, kɔtá na site Internet na biso, jw.org. Na nsima, kende esika bakomi ‘Luká bavideo,’ mpe finá esika bakomi ‘Bilenge.’”

Na mpokwa ya mokolo wana Mariana abengaki Jehizel na telefone. Alobaki na ye boye: “Sikoyo nayebi mpo na nini osalaka makambo oyo nyonso.”

Lokola Jehizel andimaki te makambo Mariana alobaki, atunaki ye boye: “Ozali kotyola ngai lisusu?”

Mariana alobaki, “nakotyola yo lisusu te. Sikoyo namoni ete makambo oyo nazalaki kosala mpo na komisepelisa, yango nde ebimiseli ngai ebele ya mikakatano oyo nazali na yango.” Bibongiseli ezwamaki mpo Mariana akóma koyekola Biblia mpe sikoyo akómi koyangana na makita nyonso.

Atunaki pastɛrɛ mituna

Gérole, oyo azalaki sɛkrɛtɛrɛ ya lingomba na bango na Haïti, akamwaki ndenge Batatoli ya Yehova bayanolaki na mituna na ye nyonso na Biblia. Ye ná mwana na ye ya mwasi bandimaki koyekola Biblia. Lokola basepelaki mpenza na makambo bazalaki koyekola, basɛngaki boyekoli yango esalemaka mbala mibale na pɔsɔ.

Nsima ya koyekola sanza misato, Gérole akendaki epai ya pastɛrɛ na bango mpe atunaki ye mituna minei oyo: “Yesu akómaki mokonzi na mbula nini? Bato malamu bakendaka wapi soki bakufi? Bato mabe bakendaka wapi soki bakufi? Yesu akufaki na ekulusu to na nzete?” Pastɛrɛ alobaki ete akopesa eyano kaka na motuna ya mibale mpe ya misato. Alobaki, “Batatoli ya Yehova balobaka ete ezali bato 144 000 nde bakokende likoló. Kasi nalobi ete baoyo nyonso basalaka mokano ya Nzambe bakokende likoló. Kasi bato mabe bakozika na mɔtɔ ya lifelo.” Ntango Gérole asɛngaki ye apesa bavɛrsɛ oyo elobi bongo, apesaki ata vɛrsɛ moko te. Gérole alɛmbaki nzoto mpe azwaki sikoyo ekateli ya kokoba koyekola Biblia. Alongwaki na lingomba yango mpe alobaki ete makambo oyo Batatoli ya Yehova bateyaki ye na Biblia na boumeli ya sanza misato mpamba ezali mingi koleka oyo ayebaki na boumeli ya mbula 30 oyo alekisaki na lingomba yango. Gérole ná mwana na ye bauti kozwa batisimo kala te, mpe bazali koyekola Biblia na bato 23 na mboka na bango.

Haïti: Gérole ná mwana na ye ya mwasi bazali na bayekoli ebele ya Biblia